Jakobi alobaki na bato ya libota na ye mpe na bato nyonso oyo bazalaki na ye elongo : « Bolongola banzambe ya bapaya oyo ezali kati na bino, bomipetola mpe bolata bilamba mosusu.
Alobaki na bango : « Bozali bakambi ya mabota ya Balevi, bino elongo na bandeko ya mabota na bino ; bomipetola mpo na komema Sanduku ya Yawe, Nzambe ya Isalaele, na esika oyo nabongisi mpo na yango.
Soki moto moko abuki mobeko oyo, bakosimba ye te, kasi bakoboma ye na mabanga to bakotobola ye likonga ; ezala moto to nyama, asengeli kokufa. Kaka soki lokito ya liseke ya meme eyokani makasi nde ndambo ya bato bakomata na ngomba. »
mpe biloko nyonso oyo ezikaka na moto te nde bokolekisa na moto mpo na kopetola yango ; bokopetola yango lisusu na mayi ya bopetolami. Kasi bokopetola na mayi biloko nyonso oyo ezikaka na moto.
Kasi Nganga-Nzambe azongiselaki Davidi : — Na loboko na ngai, nazali na mapa te oyo toliaka mikolo nyonso, kasi ezali kaka na mapa oyo ebulisama. Bato na yo bakoki kolia yango soki kaka basangisaki banzoto te na basi.