Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Kobima 18:9 - Mokanda na Bomoi

9 Jetro asepelaki koyoka makambo wana nyonso ya kitoko oyo Yawe asalelaki bana ya Isalaele tango akangolaki bango wuta na maboko ya bato ya Ejipito.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Kobima 18:9
8 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nalongoli mabe na yo lokola lipata, masumu na yo lokola lipata ya tongo. Zonga epai na Ngai, pamba te nasili kosikola yo. »


Oh Lola, yemba banzembo ya esengo, pamba te Yawe nde asali bongo ! Oh mozindo ya mokili, tombola mongongo ! Oh bino bangomba, bazamba mpe banzete nyonso kati na yango, boyemba banzembo ya elonga ! Pamba te Yawe asikolaki Jakobi, amonisi nkembo na Ye kati na Isalaele.


Nakotatola boboto ya Yawe, nakosanzola Ye mpo na misala na Ye, kolanda nyonso oyo Yawe asalaki mpo na biso ; solo, asalelaki libota ya Isalaele makambo ebele ya kitoko kolanda boboto mpe bolingo na Ye ya monene.


« Bosepela elongo na Yelusalemi mpe botonda na esengo mpo na ye, bino nyonso oyo bolingaka ye ; bosepela makasi elongo na ye, bino nyonso oyo bosalelaki ye matanga.


Mpo na oyo etali bondeko, bolinganaka makasi kati na bino ; mpo na oyo etali lokumu, bozalaka bato ya liboso ya kopesa yango na bato mosusu ;


Bosepelaka elongo na bato oyo bazali kosepela, mpe bolelaka elongo na bato oyo bazali kolela.


Soki eteni moko eyoki pasi, biteni nyonso esengeli koyoka pasi elongo na moko yango ; soki mpe moko kaka nde esepeli, biteni nyonso esengeli kokabola esengo elongo na moko yango.


Bongo Saulo alobaki na bato ya Keni : « Bokende na bino, bolongwa na milongo ya bato ya Amaleki mpo ete nabebisa bino te elongo na bango, pamba te bosalelaki bato nyonso ya Isalaele bolamu tango babimaki na Ejipito. » Boye bato ya Keni balongwaki na milongo ya bato ya Amaleki.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ