Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Kobima 18:8 - Mokanda na Bomoi

8 Moyize ayebisaki bokilo na ye makambo nyonso oyo Yawe asalaki Faraon mpe bato ya Ejipito mpo na kokangola Isalaele, pasi nyonso oyo bakutanaki na yango na nzela mpe ndenge nini Yawe abikisaki bango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Kobima 18:8
23 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Ndenge nini nakoki kozonga epai ya tata na ngai soki elenge mobali azali elongo na ngai te ? Kotika te ete namona pasi oyo ekokomela tata na ngai !


Sik’oyo, Oh Nzambe na biso, Nzambe Monene, Nzambe na nguya mpe ya somo, Yo oyo obatelaka boyokani mpe bolingo na Yo, komona te lokola likambo ya pamba na miso na Yo pasi oyo ekomeli biso, bakonzi na biso, bakambi na biso, Banganga-Nzambe na biso, basakoli na biso, batata na biso mpe bato na Yo nyonso, wuta na tango ya bakonzi ya Asiri kino na mokolo ya lelo.


Abikisaki bango wuta na maboko ya bayini na bango, akangolaki bango wuta na maboko ya monguna.


Kasi abikisaki bango mpo na lokumu ya Kombo na Ye, mpo na kotalisa nguya na Ye.


Tika ete bato oyo Yawe asikolaki baloba bongo, ba-oyo akangolaki wuta na maboko ya monguna,


Bino nyonso oyo botosaka Nzambe, boya koyoka ! Nakoyebisa bino makambo oyo asali mpo na bomoi na ngai.


« Nalongolaki mokumba oyo ezalaki na mapeka na ye, mpe maboko na ye elongwaki na bowumbu ya kosimba bitunga. »


Kobanga mpe somo ekweyeli bango. Na nguya ya loboko na Yo, bakomi bababa lokola libanga kino bato na Yo, oh Yawe, balekaki, kino bato oyo osikolaki balekaki.


Loboko na Yo ya mobali, oh Yawe, emonisi nguya na Yo ; loboko na Yo ya mobali, oh Yawe, enyati monguna.


Bana ya Isalaele balobaki na bango : — Ah ! Ebongaki kutu loboko na Yawe epamela biso kati na Ejipito, pamba te, kuna, tozalaki kovanda pembeni ya banzungu etonda na misuni ; tozalaki kolia mpe kotonda biloko. Kasi bino bomemi biso kati na esobe oyo mpo na koboma lisanga oyo nyonso na nzala !


Jetro, Nganga-Nzambe ya Madiani mpe bokilo ya Moyize, ayokaki makambo nyonso oyo Nzambe asalelaki Moyize mpe Isalaele, bato na Ye, mpe ndenge nini Yawe abimisaki Isalaele na Ejipito.


Nzambe atalaki bana ya Isalaele mpe asosolaki pasi na bango.


Anjelu na Ngai akotambola liboso na bino mpe akokotisa bino na mokili ya bato ya Amori, ya bato ya Iti, ya bato ya Perizi, ya bato ya Kanana, ya bato ya Evi mpe ya bato ya Yebusi ; bongo Ngai nakosilisa bango.


Mpe nalobi na yo : Tika mwana na Ngai ya mobali kokende mpo ete asalela Ngai. Soki kaka oboyi kotika ye, nakoboma mwana na yo ya liboso ya mobali. › »


Atako bongo, Faraon akoyokela bino te. Boye, nakosembola loboko na Ngai kati na Ejipito ; mpe na nzela ya bitumbu minene, nakobimisa wuta na Ejipito mampinga na Ngai, bato na Ngai, bana ya Isalaele.


Bato ya Ejipito bakoyeba ete nazali Yawe tango nakosembola loboko na Ngai kati na mokili na bango mpe nakobimisa bana ya Isalaele wuta na Ejipito. »


Wuta na Kadeshi, Moyize atindaki bantoma epai ya mokonzi ya Edomi mpe alobaki : — Tala maloba oyo ndeko na yo, Isalaele, alobi : « Oyebi pasi nyonso oyo ekomelaki biso.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ