Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Kobima 18:7 - Mokanda na Bomoi

7 Moyize abimaki mpo na kokutana na bokilo na ye ; agumbamaki liboso na ye mpe apesaki ye beze. Batunanaki basango ya moko na moko mpe bakotaki na ndako ya kapo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Kobima 18:7
23 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mokonzi ya Sodome akendeki na lubwaku ya Shave oyo ezali lubwaku ya bokonzi, mpo na kokutana na Abrami oyo azali kozonga sima na ye kolonga Kedorilaomeri elongo na bakonzi oyo basanganaki na ye, na bitumba.


Tango Abrayami atombolaki miso, amonaki mibali misato pene na ye. Mpe tango kaka amonaki bango, atelemaki wuta na ndako na ye ya kapo mpe akendeki mbangu mpo na kokutana na bango ; bongo agumbamaki kino na mabele.


Ba-anjelu oyo mibale bakomaki na Sodome na pokwa. Wana Loti avandaki na ekuke, amonaki bango, akendeki koyamba bango mpe afukamaki elongi kino na mabele.


Tango kaka Labani ayokaki sango na tina na Jakobi, mwana ya ndeko na ye ya mwasi, akendeki mbangu kokutana na ye. Ayambaki ye, apesaki ye beze mpe amemaki ye na ndako na ye ; mpe kuna, Jakobi ayebisaki ye makambo nyonso oyo elekaki.


Otikeli ngai ata tango te ya kopesa beze na bakoko na ngai mpe na bana na ngai ya basi ! Osali penza lokola moto ya liboma !


Tango Jozefi ayaki na ndako, bapesaki ye bakado oyo bamemaki na ndako mpe bagumbamaki liboso na ye mito na se.


Apesaki bandeko na ye nyonso beze mpe alelaki. Sima na yango, basololaki.


Jozefi abongisaki Shario na ye mpe akendeki kokutana na Isalaele, tata na ye, na Gosheni. Tango kaka akomaki liboso na ye, ayambaki tata na ye mpe alelaki mingi.


Tango Iri akomaki epai na ye, Davidi atunaki ye soki Joabi azali malamu, soki basoda bazali malamu mpe soki bitumba ezali koleka ndenge nini.


Tango Batisheba akendeki epai ya mokonzi Salomo mpo na kolobela Adoniya, mokonzi atelemaki mpo na kokutana na Batisheba, agumbamaki liboso na ye mpe avandaki na kiti na ye ya bokonzi. Asengaki ete batia kiti mpo na mama ya mokonzi, mpe Batisheba avandaki na ngambo ya loboko ya mobali ya mokonzi.


Bopesa Mwana na Ye beze, noki te akosilika mpe bokokufa na nzela na bino, pamba te kanda na Ye epelaka noki. Esengo na bato oyo bazwaka Ye lokola ebombamelo na bango.


Jetro atindelaki Moyize maloba oyo : — Ngai Jetro, bokilo na yo, nazali koya epai na yo elongo na mwasi na yo mpe bana na yo mibale ya mibali.


Moyize azwaki ndako ya kapo mpe atelemisaki yango mwa mosika, na libanda ya molako, mpo na bolamu na bango ; mpe abengaki yango Ndako ya kapo ya Bokutani. Moto nyonso oyo alingaki kokutana na Yawe, asengelaki kokende na Ndako ya kapo ya Bokutani, na libanda ya molako.


Yawe alobaki na Aron : — Kende kokutana na Moyize na esobe. Aron akendeki, akutanaki na Moyize na ngomba ya Nzambe mpe apesaki ye beze.


Tango Balaki ayokaki sango ete Balami azali koya, akendeki kokutana na ye na engumba ya bato ya Moabi, oyo ezalaka na mondelo ya Arinoni, na suka ya mokili na ye.


Opesaki Ngai beze te ; kasi ye, banda nakotaki awa, atiki te kopesa makolo na Ngai beze.


Bango nyonso bakomaki kolela, bayambaki Polo mpe bapesaki ye beze ;


Tango bandeko ya Rome bayokaki ete tokomi, bayaki kino na zando ya Apiusi mpe na esika oyo babengaka « Bandako misato, » mpo na kokutana na biso. Tango Polo amonaki bango, azongisaki matondi epai ya Nzambe mpe azwaki lisusu molende.


Tango Jefite azongaki na ndako na ye, na Mitsipa, mwana na ye ya mwasi abimaki mpo na koyamba ye ; azalaki kobina mpe kobeta mbonda ya moke. Azalaki mwana na ye kaka moko : azalaki na mwana mosusu te, ezala ya mwasi to ya mobali.


Mema lisusu ba-fromaje zomi oyo epai ya mokonzi ya limpinga ya basoda nkoto moko, limpinga oyo bango bazali. Tala soki bandeko na yo ya mibali bazali ndenge nini mpe zwa na maboko na bango elembo oyo ekolakisa ngai ete bazali malamu.


Davidi akitisaki mikumba na ye, apesaki yango na maboko ya mobateli mikumba, akimaki mbangu na esika ya bitumba mpe apesaki bandeko na ye ya mibali mbote.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ