4 mwana ya mibale, kombo na ye ezalaki « Eliezeri, » pamba te amilobelaki : « Nzambe ya tata na ngai asungaki ngai mpe akangolaki ngai wuta na mopanga ya Faraon. »
Mpo na Nzambe ya tata na yo, tika ete asungaka yo ! mpo na Nkolo-Na-Nguya-Nyonso, tika ete apambola yo, apambola yo na mapamboli ya Lola, wuta na likolo ; na mapamboli ya bozindo, na se ; na mapamboli ya mabele mpe ya libumu.
Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi, mosali na Yawe. Ayembelaki Yawe nzembo na maloba oyo, tango Yawe akangolaki ye wuta na maboko ya banguna na ye nyonso mpe na loboko ya Saulo.
Moyize azwaki mwasi na ye mpe bana na ye ya mibali, atiaki bango likolo ya ane mpe azongaki na Ejipito. Azwaki lisusu lingenda ya Nzambe na loboko na ye.
Tango mayele na ye ya bomoto ezongaki, Petelo amilobelaki : — Ah, nasosoli sik’oyo, ezali penza ya solo ! Nkolo atindaki anjelu na Ye mpe akangoli ngai na maboko ya Erode mpe na makambo nyonso oyo Bayuda balingaki kosala ngai.
Ezali Nkolo nde atelemaki pembeni na ngai mpe apesaki ngai nguya mpo ete, na nzela na ngai, mateya eteyama na mobimba na yango nyonso, mpe mpo ete Bapagano bayoka yango. Mpe akangolaki ngai wuta na monoko ya nkosi.
balongaki nguya ya moto oyo ezalaki kopela makasi mpe babikaki na kufa ya mopanga. Atako bazalaki bato ya bolembu, bakomaki makasi na bitumba mpe bakimisaki mampinga ya basoda ya bapaya.