Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Kobima 18:16 - Mokanda na Bomoi

16 Soki bazali na kowelana, bayaka epai na ngai ; mpe ngai nakataka makambo, sima nalakisaka bango mibeko mpe bikateli ya Nzambe.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Kobima 18:16
20 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Abisalomi azalaki koloba na ye : — Tala, likambo na yo ezali malamu mpe sembo ; kasi ezali na moto moko te oyo akoki koyoka yo epai ya mokonzi.


Tango nyonso likambo ekowuta epai na bandeko na bino oyo bavandaka na engumba mpe ekokoma liboso na bino, ezala ya koboma to ya kobuka mibeko, mitindo, bikateli to malako, bosengeli kokebisa bango ete basala masumu te liboso ya Yawe ; soki te, kanda na Ye ekokweyela bino mpe bandeko na bino. Bosala bongo mpe bokozala na pamela te.


Soki nasalelaki na bosembo te bawumbu na ngai ya mibali mpe ya basi tango bazwaki ngai mabe,


Bokilo ya Moyize alobaki na ye : — Lolenge na yo ya kosala ezali malamu te.


Mokolo oyo elandaki, Moyize abimaki mpe amonaki Ba-Ebre mibale bazali kobunda. Atunaki na moto oyo asalaki mabe : — Mpo na nini ozali kobeta moninga na yo ?


Okozala mosika ya makambo ya lokuta. Okoboma te ezala moto oyo ayebi likambo te to moto ya sembo ; pamba te nalongisaka te moto mabe.


Moyize alobaki na bakambi : « Bozela biso awa kino tokozonga. Aron mpe Wuri bazali elongo na bino. Tika ete soki moto azali na likambo, ayebisa bango yango. »


Loba na bana ya Isalaele : ‹ Soki moto alakeli Nzambe na ye mabe, amemi ngambo ;


Bongo Yawe alobaki na Moyize : « Moto oyo asengeli kokufa. Bato nyonso ya lisanga basengeli komema ye libanda ya molako mpe koboma ye na mabanga. »


bolakisa bango kotosa makambo nyonso oyo natindaki bino. Boyeba malamu ete nazali elongo na bino mikolo nyonso kino na suka ya mokili.


Soki ndeko moko kati na bino azwi ndeko mosusu likambo, mpo na nini akendaka kofunda yango epai ya Bapagano, na esika ete akende kofunda epai ya basantu ?


Tala, nateyaki bino mitindo mpe mibeko ndenge Yawe, Nzambe na ngai, atindaki ngai, mpo ete bokoka kotosa yango na mokili oyo bokokota mpo na kozwa yango.


Moyize abengisaki Isalaele mobimba mpe alobaki : « Oh Isalaele, yoka malamu bikateli mpe mibeko oyo nakoyebisa yo lelo. Yekola yango, batela yango mpe salela yango.


Tala mibeko, bikateli mpe malako oyo Yawe, Nzambe na bino, atindi ngai koteya bino mpo ete bosalela yango kati na mokili oyo bokokota mpo na kokamata yango,


Kasi mpo na ngai, ekozala penza likambo ya nkele soki nasali masumu liboso ya Yawe, soki natiki kobondela mpo na bino ! Nakolakisa bino nzela oyo ezali malamu mpe alima.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ