Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Kobima 18:13 - Mokanda na Bomoi

13 Mokolo oyo elandaki, Moyize avandaki mpo na kosambisa bato. Bato batelemaki liboso ya Moyize, kobanda na tongo kino na pokwa.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Kobima 18:13
9 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tango nazalaki kokende na ekuke ya mboka mpe nazalaki kotia kiti na ngai na esika oyo bato ebele bakutanaka,


Bongo Jetro, bokilo ya Moyize, abonzelaki Nzambe mbeka ya kotumba mpe bambeka mosusu. Aron elongo na bakambi nyonso ya Isalaele bayaki mpo na kolia lipa elongo na bokilo ya Moyize, na miso ya Nzambe.


Tango bokilo na ye amonaki makambo nyonso oyo Moyize azalaki kosala mpo na bato, alobaki : — Mpo na nini ozali kosala bongo tango ozali kotala makambo ya bato ? Mpo na nini ozali yo moko lokola mosambisi ? Mpo na nini bato oyo nyonso batelemi pembeni na yo, kobanda na tongo kino na pokwa ?


Kiti ya bokonzi ekolendisama na bolingo ; moto moko akovanda na kiti yango na bosolo, akobimela na ndako ya Davidi : alukaka bosembo kati na kosambisa mpe alongisaka makambo ya bosembo.


« Balakisi ya Mobeko mpe Bafarizeo bazali na mokumba ya koteya bato mibeko ya Moyize.


tika ete moto oyo azali na likabo ya kolendisa alendisaka, tika ete moto oyo azali na likabo ya kopesa apesaka na motema moko, tika ete moto oyo azali na likabo ya kokamba akambaka na molende, mpe tika ete moto oyo azali na likabo ya kosunga bato bakelela asungaka na esengo !


Yango wana mpe bofutaka bampako, pamba te bakonzi bazali basali ya Nzambe, oyo bapesaka tango na bango nyonso mpo na kokamba.


Bino oyo bozali kotambola likolo ya ba-ane ya pembe, bino oyo bozali kovanda likolo ya batapi, bino oyo bozali kotambola na nzela, bokanisa !


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ