Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Kobima 18:12 - Mokanda na Bomoi

12 Bongo Jetro, bokilo ya Moyize, abonzelaki Nzambe mbeka ya kotumba mpe bambeka mosusu. Aron elongo na bakambi nyonso ya Isalaele bayaki mpo na kolia lipa elongo na bokilo ya Moyize, na miso ya Nzambe.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Kobima 18:12
31 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yawe amimonisaki epai ya Abrami mpe alobaki : « Nakopesa mokili oyo epai ya bakitani na yo. » Boye Abrami atongaki na esika yango etumbelo mpo na Yawe oyo amimonisaki epai na ye.


Kaka na esika yango, Izaki atongaki etumbelo, abelelaki Kombo ya Yawe, atongaki ndako na ye ya kapo. Basali na ye batimolaki libulu mosusu ya mayi.


Izaki asalelaki bango feti monene ; baliaki mpe bamelaki.


Jakobi abonzaki mbeka likolo ya ngomba mpe abengisaki bandeko na ye ya mibali mpo na kolia bilei. Tango basilisaki kolia, balekisaki butu na esika wana, likolo ya ngomba.


Abele, ye mpe amemaki bibwele oyo ebotamaki liboso kati na etonga na ye mpe biteni oyo eleki mafuta. Yawe asepelaki na Abele mpe na makabo na ye,


Babongisaki bakado na bango mpo na boyei ya Jozefi na midi, pamba te bayokaki ete bakolia kuna.


Noa atongaki etumbelo mpo na Yawe mpe azwaki ndambo ya banyama mpe bandeke ezanga mbindo, abonzelaki yango Yawe lokola mbeka ya kotumba.


Davidi alobaki na ye : — Kobanga te ! Pamba te nakotalisa yo solo bolamu mpo na tata na yo, Jonatan. Nakozongisela yo mabele nyonso ya koko na yo, Saulo, mpe okobanda kolia tango nyonso na mesa na ngai.


Ezekiasi alendisaki Balevi nyonso oyo balakisaki ete bayebi malamu mosala ya Yawe. Na mikolo sambo ya feti, baliaki misuni ya bambeka, babonzaki bambeka ya boyokani mpe basanzolaki Yawe, Nzambe ya bakoko na bango.


Mpe soki mikolo ya feti esili, Yobo azalaki kobengisa bana na ye mpo na kopetola bango. Na tongo-tongo, azalaki kobonza mbeka ya kotumba mpo na moko na moko kati na bango ; pamba te azalaki komilobela : « Tango mosusu bana na ngai basali masumu mpe balakeli Nzambe mabe kati na mitema na bango. » Yobo azalaki kosala bongo tango nyonso.


Bandeko na ye nyonso ya mibali mpe ya basi, elongo na bato nyonso oyo bayebaki ye liboso, bayaki mpe baliaki na ye elongo kati na ndako na ye ; bakabolaki na ye mawa mpe balendisaki ye na tina na pasi nyonso oyo Yawe atindelaki ye, mpe moko na moko kati na bango apesaki ye mbongo moko ya ebende ya palata mpe lopete moko ya wolo.


Kasi sik’oyo, bokamata bangombe sambo ya mibali mpe bameme sambo ya mibali ; bokende epai ya Yobo, mosali na Ngai, botumba mbeka mpo na bino moko. Yobo, mosali na Ngai, akobondela mpo na bino ; mpe mpo na kondima na ye, nakoyamba libondeli na ye mpo ete nasalela bino te kolanda bozoba na bino. Pamba te bolobi na bosembo te na tina na Ngai, ndenge Yobo, mosali na Ngai, alobaki. »


Mokolo oyo elandaki, Moyize avandaki mpo na kosambisa bato. Bato batelemaki liboso ya Moyize, kobanda na tongo kino na pokwa.


Moyize avandaki pembeni ya libulu ya mayi. Nzokande, Nganga-Nzambe ya Madiani azalaki na bana basi sambo. Bayaki kotoka mayi mpe batondisaki bimelelo mpo ete bamelisa bibwele ya tata na bango.


Reweli atunaki bana na ye ya basi : — Moto yango ya Ejipito azali wapi ? Mpo na nini botiki ye kuna ? Bobenga ye mpo ete aya kolia.


Okotongela Ngai etumbelo ya mabele epai wapi okobonza bambeka na yo ya kotumba, bambeka na yo ya boyokani, meme na yo, ntaba na yo, ngombe na yo. Esika nyonso oyo nakomimonisa mpo na lokumu ya Kombo na Ngai, nakoya epai na yo mpe nakopambola yo.


Kasi Nzambe asembolaki loboko na Ye te mpo na kobeta bakambi ya Isalaele ; bamonaki Nzambe, baliaki mpe bamelaki.


Atindaki bilenge mibali ya Isalaele ete babonzela Yawe mbeka ya kotumba ya bangombe ya mibali lokola mbeka ya boyokani.


Moyize azalaki koleisa bibwele ya Jetro, bokilo na ye mpe Nganga-Nzambe ya Madiani. Amemaki bibwele mosika, kati na esobe, mpe akomaki na Orebi, ngomba ya Nzambe.


Moyize azwaki ndako ya kapo mpe atelemisaki yango mwa mosika, na libanda ya molako, mpo na bolamu na bango ; mpe abengaki yango Ndako ya kapo ya Bokutani. Moto nyonso oyo alingaki kokutana na Yawe, asengelaki kokende na Ndako ya kapo ya Bokutani, na libanda ya molako.


Nazalaki kolia lisusu bilei ya kitoko te ; ezala misuni to vino, eloko moko te ekotaki lisusu na monoko na ngai. Mpe, na baposo misato wana, nazalaki kopakola lisusu mafuta ya solo kitoko te.


Moyize alobaki na Obabi, mwana mobali ya Reweli, moto ya Madiani, bokilo ya Moyize : — Tozali kokende na mokili oyo Yawe alobaki : « Nakopesa bino mokili yango. » Yaka kotambola elongo na biso. Tokosala ete obika bolamu oyo Yawe alakaki kosalela Isalaele.


Mokolo moko ya Saba, Yesu akendeki kolia kati na ndako ya moko kati na bakambi ya Bafarizeo, mpe Bafarizeo bazalaki kotala Ye malamu.


Tango moko kati na babengami ayokaki bongo, alobaki na Yesu : — Esengo na moto oyo akolia na feti kati na Bokonzi ya Nzambe !


Bokanisa nanu Isalaele ! Boni, bato oyo baliaka banyama oyo epesami lokola mbeka bazalaka moko te na etumbelo ?


Bokoki te komela oyo ezali kati na kopo ya Nkolo mpe komela lisusu oyo ezali kati na kopo ya milimo mabe ; bokoki te kolia na mesa ya Nkolo mpe kolia lisusu na mesa ya milimo mabe.


Boye, ezala kolia to komela, nyonso oyo bokoki kozala kosala, bosalaka nyonso mpo na lokumu ya Nzambe.


Kaka na esika yango, na miso ya Yawe, Nzambe na bino, bino mpe mabota na bino bokolia mpe bokosepela na eloko nyonso oyo bokosala na maboko na bino ; pamba te Yawe, Nzambe na bino, apamboli bino.


Na likolo ya etumbelo yango, bokobonza bambeka ya boyokani ; bokolia yango kaka na esika wana mpe bokosepela na miso ya Yawe, Nzambe na bino.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ