Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Kobima 17:8 - Mokanda na Bomoi

8 Bato ya Amaleki bayaki mpe babundisaki bana ya Isalaele na Refidimi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Kobima 17:8
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tango bazongaki, bakendeki na Eyini-Mishipati oyo elakisi Kadeshi mpe babotolaki mokili mobimba ya bato ya Amaleki. Balongaki mpe bato ya Amori oyo bazalaki kovanda na Atsatsoni-Tamari.


Elifazi, mwana mobali ya Ezawu, azalaki na makangu oyo kombo na ye ezalaki « Timina ; » Timina abotelaki ye Amaleki. Bango nde bakoko ya Ada, mwasi ya Ezawu.


mokonzi Kora, mokonzi Gaetami mpe mokonzi Amaleki. Bango nde bakonzi ya libota ya Elifazi, oyo babotamaki na Edomi ; bazalaki bakoko ya Ada.


bato ya Edomi mpe bato ya Isimaeli, bato ya Moabi mpe bato ya Agari,


Lisanga mobimba ya bana ya Isalaele elongwaki na esobe ya Tsini mpe ezalaki kotambola kolanda ndenge Yawe azalaki kotinda. Batongaki molako na bango na Refidimi, kasi mayi ya komela ezalaki te mpo na bato.


Bato ya Amaleki bavandaka na etuka ya Negevi ; bato ya Iti, ya Yebusi mpe ya Amori bavandaka na mokili ya bangomba, mpe bato ya mboka Kanana bavandaka pembeni ya ebale monene mpe pembeni-pembeni ya Yordani. »


Balami amonaki Amaleki mpe alobaki maloba oyo : « Amaleki ezalaki na molongo ya liboso kati na bikolo, kasi ekosuka na libebi. »


Tango nyonso oyo bana ya Isalaele bazalaki kolona bilanga na bango, bato ya Madiani, bato ya Amaleki mpe bato ya bikolo mosusu ya ngambo ya este, bazalaki koya kobundisa Isalaele.


Abundisaki na makasi nyonso bato ya Amaleki mpe alongaki bango, akangolaki Isalaele na maboko ya bato oyo bazalaki kobotola bango biloko.


Tala makambo oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : ‹ Nakopesa bato ya Amaleki etumbu mpo na makambo oyo basalaki Isalaele tango bawutaki na Ejipito : bakangelaki Isalaele nzela.


Na tango wana, Davidi mpe bato na ye bazalaki kobundisa bato ya Geshuri, ya Girizi mpe ya Amaleki ; pamba te wuta kala, bato ya bikolo yango bazalaki kovanda na mokili longwa na Shuri kino na Ejipito.


Davidi mpe bato na ye bakomaki na Tsikilagi, na mokolo ya misato. Na tango wana mpe, bato ya Amaleki bakotaki na ngambo ya Sude mpe na Tsikilagi. Babundisaki Tsikilagi mpe batumbaki yango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ