Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Kobima 17:3 - Mokanda na Bomoi

3 Lokola posa ya mayi elekaki makasi, bato bayimaki-yimaki epai ya Moyize mpe balobaki : — Mpo na nini obimisaki biso na Ejipito ? Ezali mpo ete obomisa biso, bana na biso mpe bibwele na biso na posa ya mayi ?

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Kobima 17:3
9 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tango bazalaki na nzala, opesaki bango bilei wuta na likolo ; mpe tango bazalaki na posa ya mayi, obimiselaki bango mayi wuta na libanga. Olobaki na bango ete bakende kobotola mokili oyo, na nzela ya ndayi, olakaki kopesa bango.


Opesaki bango Molimo malamu na Yo mpo na kopesa bango bososoli. Opimelaki bango te mana na Yo, oyo bazalaki kolia, mpe opesaki bango mayi ya komela tango bazalaki na posa ya mayi.


Likolo ya nzala mpe ya posa ya mayi, bakomaki pene ya kokufa.


Ezalaki lisusu na ebele ya bato oyo bakendeki na bango elongo ; bamemaki lisusu bibwele : bameme, bantaba mpe bangombe.


Balobaki na Moyize : — Boni, ezali mpo ete malita ezali te na Ejipito, yango wana omemi biso mpo ete tokufa na esobe ? Osali biso nini awa obimisi biso na Ejipito ?


Boye bato bayimaki-yimaki na tina na Moyize mpe balobaki : « Tokomela nini ? »


moko te kati na bato oyo bamonaki nkembo na Ngai mpe bikamwa oyo nasalaki kati na Ejipito mpe na esobe kasi baboyaki kotosa Ngai mpe bamekaki Ngai mbala zomi,


Mpo na nini omemaki lisanga ya Yawe na esobe oyo ? Ezali mpo ete biso mpe bibwele na biso tokufa awa ?


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ