Moyize alobaki lisusu : — Bokoyeba ete ezali solo Yawe tango akopesa bino misuni ya kolia na pokwa mpe mapa ebele na tongo. Pamba te ayoki koyimayima na bino na tina na Ye. Biso tozali banani ? Boyimaki-yimaki na tina na biso te, kasi na tina na Yawe.
Abengaki esika yango Masa mpe Meriba, pamba te bana ya Isalaele baswanisaki ye mpe bamekaki Yawe tango balobaki : « Boni, Yawe yango azali kati na biso to te ? »
Balobaki : — Tika ete Yawe atala bino mpe asambisa bino ! Bokomisi biso eloko ya nkele liboso ya Faraon mpe ya basali na ye mpe botie mopanga na maboko na bango mpo ete baboma biso !
moko te kati na bato oyo bamonaki nkembo na Ngai mpe bikamwa oyo nasalaki kati na Ejipito mpe na esobe kasi baboyaki kotosa Ngai mpe bamekaki Ngai mbala zomi,
Bongo mpo na nini bolingi sik’oyo komeka Nzambe, na nzela ya koluka komemisa bayekoli oyo, mokumba oyo tolongaki te komema, ezala biso to batata na biso ?
Petelo alobaki na ye : — Mpo na nini boyokanaki mpo na komeka Molimo ya Nkolo ? Yoka, makolo ya bato oyo bawuti kokunda mobali na yo esili kokoma liboso ya ekuke ; yo mpe, bakomema yo.