Yawe amimonisaki epai ya Abrami mpe alobaki : « Nakopesa mokili oyo epai ya bakitani na yo. » Boye Abrami atongaki na esika yango etumbelo mpo na Yawe oyo amimonisaki epai na ye.
Longwa wana, akendeki na bangomba ya este ya Beteli. Atongaki ndako na ye ya kapo kati ya Beteli mpe Ayi, na esika oyo atongaki etumbelo mpo na Yawe mpe abelelaki Kombo ya Yawe. Beteli ezalaki na ngambo ya weste mpe Ayi, na ngambo ya este.
Okosala na mabaya ya nzete ya akasia etumbelo : ekozala ndenge moko na molayi mpe na mokuse, bametele mibale na basantimetele tuku mitano ; bongo bosanda na yango ekozala ya metele moko na basantimetele tuku mitano.
Bongo Jedeon atongaki etumbelo mpo na Yawe mpe abengaki yango « Yawe apesaka kimia. » Etumbelo yango ezali kino na mokolo ya lelo kati na Ofira, mboka ya libota ya Abiezeri.