Kati na Sanduku, ezalaki na eloko mosusu te longola kaka bitando mibale ya mabanga oyo Moyize atiaki na Orebi epai wapi Yawe asalaki boyokani elongo na bana ya Isalaele tango babimaki na Ejipito.
Ezali kati na Ndako ya kapo ya Bokutani, libanda ya rido oyo ezali liboso ya Sanduku ya Litatoli, nde Aron mpe bana na ye ya mibali bakobanda kopelisa minda tango nyonso liboso ya Yawe, kobanda na pokwa kino na tongo. Ezali mobeko ya libela mpo na milongo nyonso ya bana ya Isalaele.
Okosala na ndambo na yango mosusu putulu oyo okotia liboso ya Sanduku ya Litatoli kati na Ndako ya kapo ya Bokutani epai wapi nakokutana na yo. Ekozala bule koleka mpo na bino.
Okotia etumbelo liboso ya rido oyo ezali liboso ya Sanduku ya Litatoli, liboso ya esika ya bolimbisi masumu oyo ezali na likolo ya Sanduku ya Litatoli. Ezali na esika yango nde nakobanda kokutana na yo.
Tala motuya ya biloko oyo basalelaki Mongombo oyo, kati na yango, ezalaki na buku ya Boyokani, ndenge kaka Moyize atindaki. Balevi batongaki yango na bokambami ya Itamari, mwana mobali ya Nganga-Nzambe Aron.
Moyize azwaki bitando nyonso mibale ya mabanga ya Boyokani mpe atiaki yango kati na Sanduku, akangisaki mabaya na Sanduku mpe atiaki esika ya bolimbisi masumu na likolo na yango.
Okopesa na bato ya libota ya Levi mokumba ya Mongombo ya Litatoli mpe ya bisalelo na yango nyonso elongo na biloko nyonso oyo ezalaka kati na Mongombo. Bango bakozwa mokumba ya komemaka yango elongo na bisalelo na yango mpe bakovanda zingazinga na yango.
Kasi bato ya libota ya Levi bakotelemisa bandako na bango ya kapo zingazinga ya Mongombo ya Litatoli mpo ete kanda makasi ya Yawe ekoka kokweya likolo ya lisanga ya bana ya Isalaele te. Bato ya libota ya Levi nde bakosala mosala ya kobatela Mongombo ya Litatoli. »
Boye nakitaki wuta na ngomba mpe natiaki bitando yango mibale ya mabanga kati na sanduku oyo nasalaki ndenge Yawe atindaki ngai mpe ezali kuna sik’oyo.