Kobima 16:3 - Mokanda na Bomoi3 Bana ya Isalaele balobaki na bango : — Ah ! Ebongaki kutu loboko na Yawe epamela biso kati na Ejipito, pamba te, kuna, tozalaki kovanda pembeni ya banzungu etonda na misuni ; tozalaki kolia mpe kotonda biloko. Kasi bino bomemi biso kati na esobe oyo mpo na koboma lisanga oyo nyonso na nzala ! အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Tokosala nde makambo nyonso oyo biso tokanaki kosala : tokotumba malasi ya ansa lokola mbeka mpo na Ishitari mpe tokosopa makabo ya masanga ya vino mpo na ye ndenge biso, batata na biso, bakonzi na biso mpe bakalaka na biso tosalaki kati na bingumba ya Yuda mpe na babalabala ya Yelusalemi ; mpe na tango wana, tozalaki na bilei ebele, tozalaki malamu mpe tozalaki komona pasi te.