Moyize ayebisaki bango : — Mokolo ya lelo ezali mokolo ya Saba, mokolo ya Yawe. Bolia mana oyo bobombaki ; pamba te lelo, bokotikala te komona mana na libanda.
Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Ekuke ya lopango ya kati oyo etala na ngambo ya este ekozala ya kokangama mikolo motoba ; kasi na mokolo ya Saba mpe na mokolo ya feti ya ebandeli ya sanza, ekozala ya kofungwama.
Kasi mokambi ya ndako ya mayangani asilikaki mpo ete Yesu abikisi moto na mokolo ya Saba, mpe alobaki na ebele ya bato : — Ezali na mikolo motoba mpo na kosala mosala ! Ezali na mikolo yango nde bosengeli koya mpo ete babikisa bino, kasi na mokolo ya Saba te !