24 Bato ya Isalaele babatelaki yango kino na tongo, ndenge kaka Moyize atindaki ; mana elumbaki te solo ya kopola, mpe bankusu ezalaki te kati na yango.
Kasi bamosusu kati na bango bayokelaki Moyize te mpe babombaki ndambo na yango kino na tongo. Boye bankusu etondaki na ndambo oyo babombaki, mpe ekomaki kolumba solo ya kopola. Mpo na yango, Moyize atombokelaki bango.
Moyize ayebisaki bango : — Mokolo ya lelo ezali mokolo ya Saba, mokolo ya Yawe. Bolia mana oyo bobombaki ; pamba te lelo, bokotikala te komona mana na libanda.
Boye Moyize alobi na Aron : — Kamata ekolo moko mpe tia omeri moko ya mana kati na yango ; bongo tia yango liboso ya Yawe mpo ete ebombama mpo na milongo oyo ekoya.