Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Kobima 16:23 - Mokanda na Bomoi

23 Moyize alobaki na bango : — Tala mibeko oyo Yawe apesi : « Lobi ezali mokolo ya kopema, mokolo ya Saba oyo ebulisami mpo na Yawe. Bokolamba oyo bolingi kolamba mpe bokotokisa oyo bolingi kotokisa ; kasi oyo ekotikala, bobatela yango kino lobi. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Kobima 16:23
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Okitaki na ngomba Sinai, olobaki na bango wuta na likolo mpe opesaki bango malako, mibeko ya solo mpe ya alima, mitindo mpe bikateli malamu.


Olakisaki bango Saba na Yo ya bule mpe opesaki bango mitindo, bikateli mpe mibeko na nzela ya Moyize, mosali na Yo.


Moyize ayebisaki bango : — Moko te abomba ata moke kino na tongo.


Mikolo motoba, okosala mosala na yo ; kasi na mokolo ya sambo, okosala mosala moko te mpo ete ngombe na yo elongo na ane na yo ekoka kopema, mpe mpo ete mwana mobali ya mwasi mowumbu na yo mpe mopaya bazwa lisusu makasi.


Bokosala mosala mikolo motoba, mpe mokolo ya sambo ezali mokolo ya Saba, mokolo ya kopema, mokolo oyo ebulisami mpo na Yawe. Moto nyonso oyo akosala mosala na mokolo ya Saba, basengeli koboma ye.


moko te kati na bino abimisa mokumba na ndako na ye to asala mosala songolo na mokolo ya Saba. Kasi bozwa mokolo yango lokola mokolo ya bule ndenge natindaki bakoko na bino.


Bokosala mikolo motoba, kasi mokolo ya sambo ezali Saba, mokolo ya kopema ; mokolo ya mayangani ya bule. Na esika nyonso oyo bokozala, bokosala ata mosala moko te : ezali mokolo ya Saba ya Yawe.


Mana ezalaki lokola mbuma ya koriande mpe ezalaki komonana pembe lokola mayi ya nzete oyo babengaka bedeliumi.


Bato bazalaki kopanzana bipai na bipai mpo na kolokota yango, mpe na sima, bazalaki konika yango na libanga to mpe kotuta yango na liboka, bongo nde bakokaki kolamba yango na banzungu to kosalela yango mikate. Mikate na yango ezalaki na elengi lokola bagato oyo basala na mafuta ya sika.


Sima, bazongaki epai na bango mpe babongisaki mafuta ya solo kitoko mpe malasi. Kasi bapemaki na mokolo ya Saba, kolanda ndenge mobeko ezalaki kosenga.


Kanisaka mokolo ya Saba mpe bulisaka yango, ndenge Yawe, Nzambe na yo, atindaki yo yango.


Na mokolo ya Nkolo, Molimo ya Nzambe asimbaki ngai, mpe nayokaki sima na ngai mongongo moko ya makasi lokola kelelo


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ