Boye Jezabeli atindaki ntoma epai ya Eliya mpo na koyebisa ye : — Tika ete banzambe bapesa ngai etumbu ya makasi koleka soki lobi, kaka na ngonga oyo, nakomisi bomoi na yo te ndenge okomisaki bomoi ya moko na moko kati na bango.
Beni-Adadi atindaki maloba mosusu epai ya Akabi : — Tika ete banzambe bapesa ngai etumbu ya makasi koleka soki etikali na Samari putulu oyo ekoki kotondisa ata loboko ya moko na moko ya bato oyo bazali kolanda ngai.
Tango bayebisaki mokonzi ya Ejipito ete bana ya Isalaele bakimi, Faraon mpe bakalaka na ye babongolaki makanisi na bango mpo na bana ya Isalaele mpe balobaki : « Likambo nini oyo tosali ? Totiki Isalaele kokende mpe tozangeli bato oyo bakoki kosalela biso ! »
Kati na banzambe ya mikili wana, nani azalaki na makoki ya kokangola mokili na ye na maboko na ngai ? Bongo ndenge nini Yawe akoka solo kokangola Yelusalemi na maboko na ngai ? »
Yango wana, nakopesa ye libula kati na bato minene, mpe akokabola bomengo ya bitumba elongo na bato ya makasi, pamba te akabaki bomoi na ye na kufa mpe amitikaki ete batanga ye na molongo ya babomi bato, pamba te amemaki masumu ya bato ebele mpe amikomisaki molobeli ya babuki mibeko.
Otobolaki ye moto na nzela ya likonga na ye moko, tango basoda na ye bazalaki koya na elulu lokola mopepe mpo na kopanza biso. Bazalaki kosepela na elikya ete bakoboma biso na nkuku.
kasi soki moto mosusu oyo aleki ye na makasi ayei kobundisa ye mpe alongi ye, akobotola ye bibundeli oyo azalaki kotiela motema, akokamata biloko na ye nyonso mpe akokaba yango.
« Ezali te mpo bazwi mpe bakaboli bomengo ya bitumba : Elenge mwasi moko to bilenge basi mibale mpo na soda moko, bilamba ya langi mpo na Sisera, bilamba, bilamba ya langi, mpe bilamba oyo batia bililingi, mpo na balongi ? »