Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Kobima 15:26 - Mokanda na Bomoi

26 Alobaki : « Soki boyoki na bokebi mongongo na Yawe, Nzambe na bino, mpe bosali oyo ezali sembo na miso na Ye, soki bosali keba na malako na Ye mpe bobateli bikateli na Ye nyonso, nakotindela bino ata bokono moko te oyo natindelaki bato ya Ejipito ; pamba te nazali Yawe oyo abikisaka bino na bokono. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Kobima 15:26
42 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nakosala bongo, pamba te basundolaki Ngai mpe bagumbamelaki Asitarite, nzambe mwasi ya bato ya Sidoni ; Kemoshi, nzambe ya bato ya Moabi ; mpe Moloki, nzambe ya bato ya Amoni, batambolaki te na banzela na Ngai mpo na kosala makambo ya sembo na miso na Ngai, kobatela malako mpe mibeko na Ngai, ndenge Davidi, tata ya Salomo, asalaki.


Soki osali nyonso oyo Ngai nazali kotinda yo, soki otamboli na banzela na Ngai mpe osali makambo ya sembo na miso na Ngai, na kobatelaka mibeko mpe malako na Ngai ndenge Davidi, mowumbu na Ngai, asalaki, wana nakozala na yo elongo, nakosala ete bokonzi kati na libota na yo elendisama ndenge nasalaki epai ya Davidi, mpe nakopesa yo Isalaele.


mpe akendeki na etima, abwakaki kuna mungwa mpe alobaki : « Tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Napetoli mayi oyo ; ekoyeisa lisusu kufa te mpe ekobebisa lisusu mabele te mpo ete ebota mbuma. › »


— Zonga epai ya Ezekiasi, mokonzi ya bato na Ngai, mpe loba na ye : « Tala makambo oyo Yawe, Nzambe ya tata na yo, Davidi, alobi : ‹ Nayoki libondeli na yo mpe namoni mpinzoli na yo. Tala, nakobikisa yo ; mpe sima na lobi, okomata lisusu na Tempelo ya Yawe.


Joziasi asalaki makambo ya sembo na miso ya Yawe mpe alandaki banzela oyo Davidi, tata na ye, atambolaki na yango ; apengwaki na yango te, ezala na ngambo ya loboko ya mwasi to na ngambo ya loboko ya mobali.


Pamba te azokisaka pota, kasi atiaka yango mpe kisi ; abetaka, kasi loboko na Ye ebikisaka.


Ye nde alimbisaka masumu na Yo nyonso, abikisaka yo na bokono nyonso,


Abikisaka bato oyo batutami na mitema mpe akawusaka bapota na bango.


Bato na ngai, boyoka ngai ! Mpe nakokebisa bino. Ah Isalaele, soki kaka ozalaki koyokela ngai !


Na kati-kati ya butu, Yawe abomaki bana mibali nyonso ya liboso kati na Ejipito kobanda na mwana mobali ya liboso ya Faraon oyo azalaki kokonza na kiti ya bokonzi kino na mwana mobali ya liboso ya mokangami oyo azalaki kati na boloko, mpe bana mibali ya liboso ya bibwele nyonso.


Soki botosi Ngai penza mpe bobateli boyokani na Ngai, bokozala mpo na Ngai ekolo ya motuya kati na bikolo nyonso. Atako mokili mobimba ezali ya Ngai,


kasi bino bokozala mpo na Ngai ekolo oyo ekosala mosala ya bonganga-Nzambe, ekolo ya bule. » Oyo nde maloba okoyebisa bana ya Isalaele.


« Nazali Yawe, Nzambe na yo, oyo abimisaki yo wuta na mokili ya Ejipito epai wapi ozalaki na bowumbu.


Soki bokosalela Yawe, Nzambe na bino, akopambola mapa mpe mayi na bino, mpe akolongola bokono kati na bino.


Bopesa Ngai matoyi na bino mpe boya epai na Ngai, boyoka mpe bokozala na bomoi ; nakosala boyokani ya libela elongo na bino, boyokani oyo nalakaki Davidi, na boyengebene mpe na bolingo na Ngai.


Namonaki banzela na ye, kasi nakobikisa ye ; nakotambolisa ye mpe nakobondisa ye.


Wuta tango nabimisaki bakoko na bino na Ejipito kino na mokolo ya lelo, nazalaki tango na tango kokebisa bango na maloba oyo : ‹ Botosa Ngai ! ›


Kasi soki penza boyoki Ngai, elobi Yawe, soki bomemi mikumba te, soki bolekisi te mikumba na bikuke ya engumba oyo mpe soki bobulisi mokolo ya Saba, soki bosali ata mosala moko te na mokolo wana ya Saba,


Nakozongisela yo bomengo na yo mpe nakobikisa bapota na yo, › elobi Yawe. ‹ Lokola bazalaki kobenga yo ekolo basundola, Siona oyo moto moko te ayokelaka mawa ; ›


Kasi nakoyeisa bato na yango nzoto kolongono mpe nakobikisa bango ; solo, nakobikisa bato na Ngai mpe nakopesa bango bomoi ya kimia kati na bobatelami.


Nzokande, napesaki bango kaka mobeko oyo : Botosa Ngai, bongo Ngai nakozala Nzambe na bino mpe bino bokozala bato na Ngai ; botambola na nzela nyonso oyo nakolakisa bino mpo ete bozala bato ya esengo.


Boni, kisi ezali te kati na Galadi ? Minganga bazali kuna te ? Bongo mpo na nini bato na ngai bazali kobika te ?


Tozwa ndakisa ya moto moko oyo asalaka makambo ya sembo mpe ya alima,


Ezalaki Ngai nde nalakisaki Efrayimi ndenge ya kotambola ; namemaki bango na maboko na Ngai, kasi basosolaki te ete Ngai nde nazalaki kobatela bango.


Boya, tozonga epai na Yawe ! Akati-kati biso solo na biteni, kasi akobikisa biso ; azokisaki biso, kasi akotia kisi na bapota na biso.


Nazali Yawe, Nzambe na bino, oyo abimisaki bino na Ejipito mpo ete bozala lisusu bawumbu kuna te ; nakataki basinga ya bikangiseli na bino mpe nabimisaki bino lokola balongi.


Soki botosi mibeko na Ngai, soki botosi mitindo na Ngai mpe bosaleli yango,


Boye, Moyize abelelaki Yawe : — Oh Nzambe, nabondeli Yo, bikisa ye !


Bolia yango te mpo ete bomona bolamu, bino mpe bana na bino ; na nzela wana nde bokosala oyo ezali alima na miso ya Yawe.


Bosala keba mpo na kotosa mibeko oyo nazali kopesa bino mpo ete bomona bolamu tango nyonso, bino mpe bana na bino, pamba te na nzela wana nde bokosala oyo ezali malamu mpe alima na miso ya Yawe, Nzambe na bino.


Eloko moko te kati na biloko oyo epesama lokola ekila ekoki komonana na maboko na yo, mpo ete Yawe Nzambe apelisela yo lisusu te kanda na Ye ya makasi, kasi atalisa yo ngolu na Ye, ayokela yo mawa mpe akomisa yo ebele ndenge alakaki yango epai ya bakoko na yo na nzela ya ndayi,


Yawe akotindela bino bokono oyo esilaka te lokola oyo atindaki na Ejipito : pota ya libumu, makwanza mpe mikusa ya nzoto.


Tango bosaleli te maloba nyonso ya mibeko oyo ekomami na buku oyo mpe botosi te Kombo ya lokumu mpe ya somo, Yawe, Nzambe na bino ;


Akotindela bino bitumbu nyonso ya Ejipito, oyo bozalaki kobanga mpe yango ekotingama na bino.


Botala sik’oyo, Ngai kaka nde nazali Nzambe ; mosusu azali te ! Nabomaka mpe napesaka bomoi ; nazokisaka mpe nabikisaka. Mpe moto moko te akoki kokangola oyo ezali na maboko na Ngai.


Moyize abengisaki Isalaele mobimba mpe alobaki : « Oh Isalaele, yoka malamu bikateli mpe mibeko oyo nakoyebisa yo lelo. Yekola yango, batela yango mpe salela yango.


Yawe akobatela yo na bokono nyonso, akobwakela yo ata bokono moko te oyo yo oyebaki te na Ejipito, kasi akokweyisa yango likolo ya bayini na yo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ