Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Kobima 15:24 - Mokanda na Bomoi

24 Boye bato bayimaki-yimaki na tina na Moyize mpe balobaki : « Tokomela nini ? »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Kobima 15:24
19 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kasi babosanaki noki misala na Ye, bazelaki te kokokisama ya mabongisi na Ye.


Balobaki na Moyize : — Boni, ezali mpo ete malita ezali te na Ejipito, yango wana omemi biso mpo ete tokufa na esobe ? Osali biso nini awa obimisi biso na Ejipito ?


Lisanga nyonso ya bana ya Isalaele bayimaki-yimaki na tina na Moyize mpe Aron kati na esobe.


Balobaki : — Tika ete Yawe atala bino mpe asambisa bino ! Bokomisi biso eloko ya nkele liboso ya Faraon mpe ya basali na ye mpe botie mopanga na maboko na bango mpo ete baboma biso !


moko te kati na bato oyo bamonaki nkembo na Ngai mpe bikamwa oyo nasalaki kati na Ejipito mpe na esobe kasi baboyaki kotosa Ngai mpe bamekaki Ngai mbala zomi,


Ezali Yawe nde bosalelaki likita, yo elongo na bato oyo bazali kolanda yo. Aron nde nani mpo ete bokoka koyimayima na tina na ye ?


« Bokende mosika ya lisanga oyo mpo ete nasilisa bango kaka na mbala moko. » Mpe bakweyaki bilongi kino na mabele.


Batombokelaki Nzambe mpe Moyize, balobaki : « Mpo na nini boye ! Bobimisaki biso na Ejipito mpo ete toya kokufa na esobe ? Bilei ezali te, mayi ezali te mpe tolembi kolia bilei oyo ya pamba-pamba ! »


Yango wana, nazali koloba na bino : bomitungisaka te na tina na bomoi na bino, na komituna : tokolia nini to tokomela nini ? To na tina na banzoto na bino, na komituna : Tokolata nini ? Boni, bomoi eleki bilei te na tina, mpe nzoto eleki bilamba te na tina ?


Boyimaka-yimaka te ndenge bamosusu kati na bango bayimaki-yimaki, mpe anjelu mobebisi abomaki bango.


Bosalaka likambo moko te na koyimayima mpe na tembe,


Bato yango bayimaka-yimaka mpe bamilelaka-lelaka tango nyonso, batambolaka kolanda baposa mabe ya banzoto na bango, bamikumisaka mpe bakumisaka bato mosusu na lokuta mpo na kobenda litomba kowuta na bango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ