23 Tango bakomaki na Mara epai wapi bamonaki mayi, bakokaki te komela mayi yango, pamba te ezalaki bololo. Yango wana babengaki esika yango Mara.
Kolongwa na Pi-Ayiroti, bakatisaki ebale monene mpe bakomaki na esobe ; batambolaki mikolo misato na esobe ya Etami mpe batongaki molako na bango, na Mara.
Ye alobaki na bango : — Bobenga ngai lisusu Naomi te, kasi Mara ; pamba te Nkolo-Na-Nguya-Nyonso ayokisi ngai mawa mingi.