Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Kobima 15:21 - Mokanda na Bomoi

21 Miriami ayembaki elongo na bango : « Boyembela Yawe, pamba te amonisi monene ya nkembo na Ye ; azindisi na ebale monene, mpunda mpe motambolisi na yango. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Kobima 15:21
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bopanza sango yango te kati na Gati, bopanza yango te na babalabala ya Ashikeloni, noki te bana basi ya bato ya Filisitia bakosepela, mpe bana basi ya mibali oyo bakatama ngenga te bakopumbwa na esengo.


Davidi alataki efode ya lino mpe azalaki kobina na makasi na ye nyonso liboso ya Yawe.


Babeti nyonso ya bakelelo mpe bayembi bazalaki kosangana lokola moto moko mpo na kotombola mongongo moko, mpo na kokumisa mpe kosanzola Yawe. Bazalaki kotombola mingongo na bango mpo na kokumisa mpe koyembela Yawe na bakelelo, na manzanza mpe na bibetelo mosusu ya mindule : Yawe azali malamu, bolingo na Ye ewumelaka seko na seko ! Na tango wana kaka, Tempelo ya Yawe etondisamaki na lipata.


Bilombe nyonso ya mpiko bakweyisamaki, balalaki pongi na bango ya suka ; basoda nyonso bakokaki lisusu te kotombola maboko.


Moyize mpe bana ya Isalaele bayembaki loyembo oyo mpo na lokumu ya Yawe : Nakoyemba mpo na lokumu ya Yawe, mpo ete amonisi monene ya nkembo na Ye ! Azindisi mpunda mpe motambolisi na yango kati na ebale monene.


Azindisi na ebale monene, bashar mpe mampinga ya Faraon ; abwaki na ebale monene ya barozo, bakonzi mpe basoda oyo Faraon atielaka motema.


mpe bazali koyemba nzembo ya sika liboso ya Kiti ya Bokonzi, ya bikelamu minei ya bomoi mpe ya bampaka. Moko te akokaki koyekola nzembo yango longola kaka bato nkoto nkama moko na tuku minei na minei oyo basikolamaki wuta na mokili.


Bazalaki koyemba nzembo ya Moyize, mowumbu ya Nzambe, mpe nzembo ya Mpate : Yawe, Nzambe-Na-Nguya-Nyonso, misala na Yo ezali minene mpe ya kokamwa ! Mokonzi ya bikolo nyonso, banzela na Yo ezali sembo mpe solo.


Mpe bayembaki nzembo ya sika : « Obongi na kozwa buku mpe kobuka bikangelo na yango, pamba te babomaki Yo ; bongo na nzela ya makila na Yo, osikolaki, mpo na Nzambe, bato ya bikolo nyonso, ya nkota nyonso, ya mikili nyonso mpe ya mabota nyonso.


Bino bakonzi, boyoka ! Bino bakambi, boyoka malamu ! Nalingi koyembela Yawe, nalingi koyemba nzembo mpo na Yawe, Nzambe ya Isalaele.


Sima na Davidi koboma moto ya Filisitia, tango basoda bazalaki kozonga wuta na bitumba, basi babimaki wuta na bingumba nyonso ya Isalaele mpo na kokende koyamba mokonzi Saulo, na banzembo ya esengo mpe na mabina, na milolo ya esengo, na bambunda mike mpe na bangonga.


Basi bazalaki kobina mpe koyemba boye : « Saulo abomaki bankoto, mpe Davidi abomaki bankoto zomi. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ