Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Kobima 15:17 - Mokanda na Bomoi

17 Okomema bango mpe okovandisa bango na ngomba na Yo, esika oyo obongisaki, oh Nkolo, mpo na kovanda, Esika ya bule, oh Yawe, esika oyo maboko na Yo esalaki.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Kobima 15:17
24 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nakobongisa esika mpo na bato na Ngai, Isalaele ; nakolona bango mpo ete bazala na esika na bango moko mpe batungisa bango lisusu te. Bato mabe bakonyokola bango lisusu te ndenge bazalaki konyokola bango liboso


Mpe ngai natongeli Yo ndako ya lokumu, esika oyo okovanda mpo na libela.


Yuda ekomaki Esika ya bule ya Yawe, mpe Isalaele ekomaki mabele na Ye.


« Ezali Ngai nde natiaki mokonzi na Ngai na Siona, ngomba na Ngai ya bule. »


Nzambe, toyokaki na matoyi na biso ; bakoko na biso babetelaki biso lisolo ya makambo oyo osalaki na tango na bango, na tango ya kala.


Ngomba ya Bashani, ngomba ya Nzambe ; ngomba ya Bashani, ngomba ya basonge ebele,


Nzambe ayebani kati na Yuda ; Kombo na Ye ezali monene kati na Isalaele.


Zongela biso lisusu, Nzambe-Na-Nguya-Nyonso ! Wuta na likolo, tala mpe mona ! Senzela mpo na nzete oyo ya vino !


Nzambe-Na-Nguya-Nyonso, sala ete tozongela ndenge tozalaki, ngengisela biso elongi na Yo mpo ete tobika.


Na bolingo na Yo, otambolisi bato oyo okangoli. Na makasi na Yo, omemi bango na Ndako na Yo ya bule.


Nakotinda anjelu liboso na bino mpo ete abatela bino na nzela mpe amema bino na esika oyo nabongisaki mpo na bino.


Bakosalela Ngai Ndako ya bule, mpe nakovanda kati na bango.


Sik’oyo, kende ! Kamba bato na esika oyo nalobaki na yo. Tala, anjelu na Ngai akozala liboso na yo. Atako bongo, tango mokolo ekokoka mpo ete napesa etumbu, nakopesa bango etumbu mpo na lisumu na bango.


Nzokande, Ngai nalonaki yo lokola nzete kitoko ya vino mpo ete obotaka mbuma ya malamu na tembe te. Bongo, ndenge nini sik’oyo obalukeli Ngai mpe okomi nzete oyo nayebi te, nzete oyo ebotaka mbuma mabe ?


Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi : « Tango nakobimisa bango na bowumbu, tala lisusu maloba oyo bato bakoloba kati na Yuda mpe kati na bingumba na yango : ‹ Oh ndako ya bosembo ; oh ngomba ya bule, tika ete Yawe apambola yo ! ›


Nakosepela kosalela bango bolamu mpe nakolona bango penza kati na mokili oyo, na motema mpe na molimo na Ngai mobimba. ›


Nakosala boyokani ya kimia elongo na bango : ekozala boyokani ya libela na libela. Nakolendisa bango, nakokomisa bango ebele koleka mpe nakotia Esika na Ngai ya bule kati na bango mpo na libela.


Bongo bato ya bikolo mosusu bakoyeba solo ete Ngai Yawe nde nakomisi Isalaele bule tango nakotia Esika na Ngai ya bule kati na bango mpo na libela. › »


Bakobengisa bato na likolo ya ngomba, mpe bakobonza kuna bambeka ya bosembo, bakosala feti mpo na bomengo ya bibale minene, mpe mpo na bozwi oyo ebombama na zelo ya libongo. »


Soki mokili oyo bosili kozwa ezali mbindo, boleka na mokili ya Yawe, epai wapi Mongombo ya Yawe ezali mpe bokabola mabele elongo na biso. Kasi botombokela Yawe te, botombokela mpe biso te na komitongela etumbelo mosusu pene ya etumbelo ya Yawe, Nzambe na biso.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ