Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Kobima 15:14 - Mokanda na Bomoi

14 Bikolo eyoki sango na yango mpe ekomi kolenga, somo ekangaki bato ya Filisitia.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Kobima 15:14
20 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kombo ya Davidi ekendeki sango na mokili mobimba mpe Yawe asalaki ete bikolo nyonso ebanga Davidi.


Kasi tango kaka bamonaki yango, bakamwaki mpe bakimaki na somo.


Mbala moko, bakomaki kolenga wana lokola mwasi oyo azali na pasi ya kobota


« Bino bato nyonso ya Filisitia, bosepela te ete fimbu oyo ezalaki kobeta bino esili kobukana, pamba te etupa ebimaka na libumu ya nyoka, mpe dalagona oyo epumbwaka ebimaka na libumu ya nyoka mabe.


Oh ekuke, lela makasi ! Engumba, ganga makasi ! Mokili mobimba ya Filisitia esili kozinda ! Milinga makasi ezali kobima na ngambo ya nor, mpe moto moko te atikali na libanda ya molongo.


Tango maloba yango ekokoma na Ejipito, bakolenga na somo wana bakoyoka sango ya Tiri.


Nakotungisa mitema ya bato ebele tango nakomema yo na bowumbu kati na bikolo ya bapaya, na mikili oyo otikala kutu koyeba te.


Tango atelemaki, mabele ekomaki koningana makasi ; tango abalolaki elongi na Ye mpo na kotala, bato ya bikolo bakomaki kolenga, bangomba milayi oyo ya kala-kala ebukanaki, mpe bangomba mikuse oyo ya kala-kala ekitaki ; kasi banzela na Ye ewumelaka seko na seko.


Namonaki bandako ya kapo ya Kushani kati na pasi, mpe bandako ya mokili ya Madiani kati na mitungisi.


Mpe bakoyebisa na bavandi ya mokili oyo makambo yango. Oh Yawe, basila koyoka wuta kala ete ozalaka elongo na bato oyo, ete Yo, oh Yawe, omimonisaki epai na bango miso na miso, ete lipata na Yo etelema likolo na bango, ete otambolaka liboso na bango kati na likonzi ya lipata, na moyi, mpe kati na likonzi ya moto, na butu.


Atindaki bantoma kobenga Balami, mwana mobali ya Beori, oyo azalaki kovanda na Petori, pembeni ya ebale Efrate, mboka oyo ye abotama. Balaki alobaki na Balami : — Bato moko bawuti kobima na Ejipito, batondisi mokili mobimba mpe bayei sik’oyo kovanda pembeni na ngai.


Lelo, nakosala ete mabota nyonso ya mokili ezala na somo mpe kobanga liboso na bino. Bakoyoka sango ya makambo oyo bokosala, bongo bakolenga mpe bakozanga kimia likolo na bino. »


Boye, sango oyo epesaki somo na mokonzi ya Yelusalemi elongo na bato na ye, pamba te Gabaoni ezalaki engumba moko ya monene lokola bingumba ya bakonzi ; ezalaki monene koleka ata Ayi, mpe mibali na yango nyonso bazalaki bilombe ya bitumba.


Tango toyokaki sango yango, mitema na biso ebukanaki mpe makasi ya moko na moko kati na biso esilaki likolo na bino, pamba te Yawe, Nzambe na bino, azali Nzambe ya likolo, kuna penza na lola, mpe Nzambe ya se, awa na mabele.


Bazongiselaki Jozue : — Basali na yo bayokaki sango ya mitindo oyo Yawe, Nzambe na bino, apesaki epai ya mosali na Ye Moyize, ete akopesa bino mokili oyo nyonso mpe akoboma bato na yango nyonso liboso na bino. Boye, tozalaki na somo makasi ya kobungisa bomoi na biso liboso na bino ; yango wana tosalaki bongo.


Bazongiselaki ye : — Basali na yo bawuti na mokili moko ya mosika penza, likolo ya sango na Yawe, Nzambe na bino. Pamba te toyokaki sango na Ye mpo na makambo nyonso oyo asalaki kati na Ejipito


bato ya Filisitia babangaki mpe balobaki : — Eh, tobebi na biso ! Nzambe akoti na molako ! Likambo ya boye nanu esalema te !


Mawa na biso ! Nani akokangola biso na maboko ya Nzambe oyo ya nguya ? Ezali Nzambe wana nde abomaki bato ya Ejipito na nzela ya bitumbu ya ndenge na ndenge kati na esobe.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ