12 Osembolaki loboko na Yo ya mobali, mpe mabele emeli bango.
Tango pasi ekweyelaka ngai, obatelaka bomoi na ngai, osembolaka loboko na Yo mpo na kotelemela kanda ya banguna na ngai ; mpe loboko na Yo ya mobali ebikisaka ngai.
Loboko na Yo ya mobali, oh Yawe, emonisi nguya na Yo ; loboko na Yo ya mobali, oh Yawe, enyati monguna.
Yango nde mokano oyo Yawe asili kozwa mpo na mokili mobimba, mpe yango nde loboko oyo asili kosembola mpo na kotelemela bikolo nyonso.