Kobima 15:11 - Mokanda na Bomoi11 Oh Yawe, nani kati na banzambe azali lokola Yo ? Nani azali lokola Yo, kitoko makasi kati na bosantu, somo, mpe abongi na lokumu, mpe asalaka makambo ya kokamwa ? အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Pamba te, tala liloba oyo Ye-Oyo-Aleki-Likolo, Ye oyo akowumela seko na seko mpe azali bule, alobi : « Navandaka na esika oyo eleki likolo mpe ya bule ; kasi navandaka mpe elongo na moto oyo azali na pasi mpe oyo molimo na ye ebukani, mpo na kolendisa lisusu molimo oyo etutami mpe motema oyo ebukani.
Ndenge nkosi eyaka wuta na bazamba ya Yordani mpo na kokende na mapango epai wapi babokolaka bibwele, ndenge wana mpe nakobengana Edomi na mokili na yango na mbala moko ; Ngai moko nakopona moto oyo akokoma mokonzi ya Edomi. Nani akokani na Ngai ? Nani akoki kobeta tembe na Ngai ? Mobateli bibwele nani akoki kotelema liboso na Ngai ?
Boni, ezali na nzambe oyo ameka kobimisa mpo na ye ekolo moko wuta na ekolo mosusu na nzela ya komekama, ya bilembo, ya bikamwa, ya bitumba, ya maboko na ye ya nguya, mpe na kosembola loboko to na nzela ya misala minene ya somo lokola makambo nyonso oyo Yawe, Nzambe na bino, asala mpo na bino kati na Ejipito na miso na bino ?