Mpe yango ekozala lokola elembo na loboko na bino mpe ekaniseli na elongi na bino, pamba te Yawe abimisaki bino na Ejipito na nzela ya loboko na Ye ya nguya. »
Boye, Nzambe amemaki bato na nzela ya molayi, na nzela oyo ekenda na esobe, na ngambo ya ebale monene ya barozo. Bato ya Isalaele babimaki libanda ya Ejipito na molongo lokola mampinga ya basoda.
Feti oyo bokosala ekozala lokola elembo na loboko na bino mpe ekaniseli na elongi na bino mpo ete mibeko ya Yawe ezala na bibebu na bino, pamba te Ye nde abimisaki bino na Ejipito na loboko na Ye ya nguya.
Bongo Ngai, nakoyeisa motema ya bato ya Ejipito libanga mpo ete balanda bino mpe nakomonisa nkembo na Ngai na kotelemela Faraon mpe mampinga na ye nyonso elongo na bashar na ye mpe bato na ye oyo batambolisaka bampunda.
Nakokomisa motema ya Faraon libanga, mpe ye akolanda bango ; kasi nakomonisa nkembo na Ngai, nakotelemela Faraon mpe mampinga na ye ; bongo bato ya Ejipito bakoyeba ete Ngai nazali Yawe. » Bana ya Isalaele basalaki bongo.
Yawe alobaki na Moyize : — Sik’oyo, lokola ozali kozonga na Ejipito, tala bikamwa nyonso oyo napesi yo nguya ya kosala ; okosala yango liboso ya Faraon. Ngai nakokomisa motema na ye libanga mpo ete akoka kotika te bato na Ngai kokende.
Yawe alobaki na Moyize : — Sik’oyo, okomona makambo oyo nakosala Faraon : na loboko na Ngai ya nguya, Faraon akotika bato na Ngai kokende mpe akobimisa bango na mokili na ye.
Nazali Yawe, Nzambe na bino, oyo abimisaki bino na Ejipito mpo ete bozala lisusu bawumbu kuna te ; nakataki basinga ya bikangiseli na bino mpe nabimisaki bino lokola balongi.
Bana ya Isalaele balongwaki na Ramisesi na mokolo ya zomi na mitano, na sanza ya liboso ; ezalaki mokolo oyo elandaki mokolo ya Pasika. Babimaki na matata te na miso ya bato nyonso ya Ejipito,
Nzambe ya bato ya Isalaele aponaki bakoko na biso, akomisaki bango ekolo monene na tango oyo bavandaki kati na mokili ya Ejipito lokola bapaya, mpe abimisaki bango na mokili yango na nguya monene.