Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Kobima 14:7 - Mokanda na Bomoi

7 Akamataki bashar nkama motoba oyo eleki malamu elongo na bashar nyonso ya Ejipito ; shar moko na moko ezalaki na basoda misato.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Kobima 14:7
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Jozefi atambolaki lisusu elongo na bashareti mpe bato oyo batambolaka likolo ya bampunda. Ezalaki mobembo ya bato ebele penza.


Nayebi sik’oyo ete Yawe abikisaka mopakolami na Ye, ayanolaka ye wuta na Esika na Ye ya bule kati na Lola, na nzela ya nguya ya loboko na Ye ya mobali.


mpo na nini ozali kosala zuwa, ngomba ya basonge ebele, ngomba oyo Nzambe asepelaka kovanda ? Nzokande Yawe akovanda kuna libela na libela.


Bato ya Ejipito balandaki bango mpe bango nyonso bakotaki kati na ebale monene : bampunda nyonso ya Faraon, bashar na ye mpe batambolisi ya bampunda.


Boye Faraon azwaki shar oyo ezalaki ya kobombama mpe azwaki mampinga na ye elongo na ye.


Yawe akomisaki motema ya Faraon, mokonzi ya Ejipito, libanga mpo ete alanda bana ya Isalaele oyo bazalaki kotambola na bonsomi nyonso.


Azindisi na ebale monene, bashar mpe mampinga ya Faraon ; abwaki na ebale monene ya barozo, bakonzi mpe basoda oyo Faraon atielaka motema.


Na nzela ya bantoma na yo, ofingaki Nkolo mpe olobaki : ‹ Na lisungi ya ebele ya bashar na ngai, namataki kino na basonge ya bangomba, kino na basonge oyo eleki likolo kati na Libani ; nakweyisaki banzete na yango ya sedele oyo eleki milayi, banzete na yango ya sipele oyo eleki kitoko, mpe nakomaki kino na songe na yango ya suka, na zamba na yango oyo eleki kitoko ;


Wana Baraki azalaki kokende, Yawe apanzaki, na nzela ya mopanga na Ye, Sisera, bashar na ye nyonso mpe mampinga na ye ya basoda. Sisera asundolaki shar na ye mpe akimaki na makolo.


Yabini azalaki na bashar nkama libwa ya bibende, mpe anyokolaki makasi bana ya Isalaele mibu tuku mibale. Bongo bana ya Isalaele bagangaki epai na Yawe mpo na kosenga lisungi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ