31 Tango bana ya Isalaele bamonaki nguya monene oyo Yawe atalisaki liboso ya bato ya Ejipito, babangaki Yawe mpe batiaki elikya na bango kati na Ye mpe kati na mosali na Ye Moyize.
Na tongo-tongo ya mokolo oyo elandaki, bakendeki na esobe ya Tekoa. Na tango ya kokende, Jozafati atelemaki mpe alobaki : « Bino, bato ya Yuda mpe bavandi ya Yelusalemi, boyoka ngai ! Botia elikya na Yawe, Nzambe na bino, mpe bokolendisama ! Bondimela basakoli na Ye, mpe bokolonga ! »
Yawe alobaki na Moyize : — Nazali koya epai na yo kati na lipata monene, mpo ete bana ya Isalaele bayoka tango nakosolola na yo mpe mpo ete batia tango nyonso elikya na bango epai na yo. Moyize ayebisaki Yawe makambo nyonso oyo bana ya Isalaele balobaki.
Wana nde ezalaki likamwisi ya liboso, oyo Yesu asalaki : esalemaki na Kana ya Galile. Ezalaki moko kati na bikamwa oyo, na nzela na yango, amonisaki nkembo na Ye ; mpe bayekoli na Ye bandimaki Ye.
Moyize azalaki sembo lokola mosali kati na Ndako mobimba ya Nzambe, mpo na kotatola na tina na makambo oyo Nzambe akoloba na mikolo oyo ezalaki kolanda.
Batata na bino bagangaki epai na Yawe mpo na kosenga lisungi, mpe Yawe atiaki molili kati na bino mpe bato ya Ejipito, azindisaki bango na mayi ya Ebale monene oyo ezipaki bango. Miso na bino moko emonaki makambo oyo nasalaki bato ya Ejipito. Mpe bowumelaki mibu ebele na esobe.
Na mokolo wana, Yawe atombolaki Jozue na miso ya bana nyonso ya Isalaele ; mpe bapesaki ye lokumu mikolo nyonso ya bomoi na ye, ndenge kaka bapesaki Moyize lokumu.