Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Kobima 14:3 - Mokanda na Bomoi

3 Faraon akokanisa ete bana ya Isalaele babungi na mokili, esobe ekangi bango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Kobima 14:3
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

oyebi tango navandaka mpe tango natelemaka. Liboso na ngai kokanisa, ososolaka mabongisi na ngai ;


Pamba te, oh Yawe, liboso ete liloba ekoma na lolemo na ngai, omiyebelaka yango.


Oh Yawe, banguna na ngai bazali motango boni ! Banguna boni oyo bazali kobundisa ngai !


Bazali koloba : « Nzambe asundoli ye ; bolanda ye, bokanga ye ; moto oyo akokangola ye azali te ! »


« Loba na bana ya Isalaele ete bazonga mpe batonga molako pembeni ya Pi-Ayiroti, kati ya Migidoli mpe ebale monene. Batonga yango etalana na Bala-Tsefoni pembeni ya ebale monene.


Nakokomisa motema ya Faraon libanga, mpe ye akolanda bango ; kasi nakomonisa nkembo na Ngai, nakotelemela Faraon mpe mampinga na ye ; bongo bato ya Ejipito bakoyeba ete Ngai nazali Yawe. » Bana ya Isalaele basalaki bongo.


Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Boni, ezali yo te oyo na tina na nani nalobelaki na tango ya kala na nzela ya basali na Ngai, basakoli ya Isalaele, oyo basakolaki na tango wana, na mibu ebele, ete nakotinda yo mpo ete obundisa bato na Ngai ?


Ezali ndenge wana nde bakokisaki mabongisi oyo osala wuta kala, na nguya mpe na mokano na Yo.


Tango bokono ebele mpe pasi mingi ekokomela bango, nzembo oyo ekotatola mpo na kofunda bango, pamba te bakitani na bango bakobosana yango te. Nayebi makambo oyo bazali kokana kosala atako nakotisi bango nanu te kati na mokili oyo nalakaki kopesa bango na nzela ya ndayi. »


Tango bato ya Gaza bayokaki sango ete Samison azali kati na engumba na bango, bazingelaki esika oyo Samison alalaki mpe basenzelaki butu mobimba, mpo na kozela ye na ekuke ya engumba. Na butu yango, baninganaki te mpe balobaki : « Tokoboma ye na tongo tango akobima. »


Botala mpe boyeba bisika nyonso epai wapi abombamaka, mpe bozongela ngai mpo na koyebisa ngai makambo nyonso ndenge yango ezali. Bongo na sima, soki azali kati na mboka, ngai nakokende elongo na bino mpe nakolukisa ye kati na bituka nyonso ya Yuda.


Tango bayebisaki Saulo ete Davidi akomi na Keila, Saulo alobaki : « Nzambe akabi ye na maboko na ngai, pamba te lokola Davidi akoti na engumba oyo ezali na bikuke mpe bikangelo, amikotisi ye moko na boloko. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ