23 Bato ya Ejipito balandaki bango mpe bango nyonso bakotaki kati na ebale monene : bampunda nyonso ya Faraon, bashar na ye mpe batambolisi ya bampunda.
Bongo Ngai, nakoyeisa motema ya bato ya Ejipito libanga mpo ete balanda bino mpe nakomonisa nkembo na Ngai na kotelemela Faraon mpe mampinga na ye nyonso elongo na bashar na ye mpe bato na ye oyo batambolisaka bampunda.
Nakokomisa motema ya Faraon libanga, mpe ye akolanda bango ; kasi nakomonisa nkembo na Ngai, nakotelemela Faraon mpe mampinga na ye ; bongo bato ya Ejipito bakoyeba ete Ngai nazali Yawe. » Bana ya Isalaele basalaki bongo.
Tango bampunda ya Faraon, bashar na ye elongo na bato oyo batambolisaka yango bamikotisaki kati na ebale monene, Yawe azongisaki mayi ya ebale monene likolo na bango. Nzokande bana ya Isalaele bakatisaki ebale monene lokola na esobe.
Tala likambo oyo ezali mabe kati na makambo nyonso oyo esalemaka na se ya moyi : bato nyonso basukaka kaka ndenge moko ; lisusu, mitema ya bato etonda na mabe, mpe bozoba ezalaka kati na mitema na bango wana bazali nanu na bomoi ; mpe, sima na yango, bakokufa kaka.