Kobima 14:22 - Mokanda na Bomoi22 Bato ya Isalaele batambolaki na ebale monene lokola na mabele ya kokawuka. Mayi etelemaki lokola mir na ngambo ya loboko na bango ya mobali mpe na ngambo ya loboko na bango ya mwasi. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
mayi oyo ezalaki kowuta na ngambo ya likolo etikaki kotiola mpe esalaki lokola mir moko ya monene, mpe etikaki nzela moko ya monene wuta na engumba Adamu, oyo ezalaki pembeni ya Tsaritani ; bongo na ngambo mosusu, mayi oyo ezalaki kokita kino na ebale monene ya Araba, ebale monene ya Barozo, ya lubwaku ya Yordani, esilaki nyonso. Bato bakatisaki kino na Jeriko oyo ezalaki liboso na bango.