Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Kobima 14:20 - Mokanda na Bomoi

20 Likonzi ya lipata etelemaki kati ya mampinga ya bato ya Ejipito mpe ya bana ya Isalaele. Likonzi ya lipata epesaki molili na ngambo moko mpe engengisaki ngambo mosusu ; yango wana butu mobimba, bato ya Ejipito bakokaki kopusana te pembeni ya bana ya Isalaele.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Kobima 14:20
9 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Amataki na likolo ya Sheribe mpe apumbwaki, apepaki na mapapu ya mopepe.


atambolisaki bango na kimia penza, babangaki eloko te ; mpe ebale monene emelaki banguna na bango.


Anjelu na Nzambe oyo azalaki kotambola liboso ya mampinga ya Isalaele azongaki sima na bango, mpe likonzi ya lipata elongwaki liboso na bango mpo ete etelema sima na bango.


Moyize asembolaki loboko na ye likolo ya ebale monene ; bongo na butu mobimba, Yawe atindaki na ebale monene mopepe makasi ya este oyo ekabolaki mayi ya ebale monene.


Kasi na mbala oyo, bokobima na kowela te mpe bokokende te lokola bato bazali kokima, pamba te Yawe akotambola liboso na bino mpe Nzambe ya Isalaele akozala Mokengeli na bino na sima.


Akozala lokola Esika ya bule ; kasi mpo na bandako mibale ya Isalaele, akozala lokola libanga oyo ebetisaka bato mabaku, lokola libanga monene oyo ekweyisaka bato ; bongo mpo na bato ya Yelusalemi, akozala motambo mpe monyama.


Batata na bino bagangaki epai na Yawe mpo na kosenga lisungi, mpe Yawe atiaki molili kati na bino mpe bato ya Ejipito, azindisaki bango na mayi ya Ebale monene oyo ezipaki bango. Miso na bino moko emonaki makambo oyo nasalaki bato ya Ejipito. Mpe bowumelaki mibu ebele na esobe.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ