18 Bongo bato ya Ejipito bakoyeba ete nazali Yawe tango nakomonisa nkembo na Ngai na kotelemela Faraon, bashar na ye mpe bato na ye oyo batambolisaka bampunda.
mpe ete oyebisa bana na yo mpe bakoko na yo makambo oyo nasalaki na Ejipito mpe bilembo ya kokamwa oyo nasalaki kati na bango. Bongo bokoyeba ete Ngai nazali Yawe. »
Alongolaki bapine na bashar na bango mpo ete bamona pasi mpo na kokumba. Boye bato ya Ejipito balobaki : — Tokima mosika ya bana ya Isalaele, pamba te Yawe azali kobundela bango liboso na biso.
Nakokomisa motema ya Faraon libanga, mpe ye akolanda bango ; kasi nakomonisa nkembo na Ngai, nakotelemela Faraon mpe mampinga na ye ; bongo bato ya Ejipito bakoyeba ete Ngai nazali Yawe. » Bana ya Isalaele basalaki bongo.
Nakozwa bino lokola bato na Ngai moko, bongo nakozala Nzambe na bino. Boye bokoyeba ete Ngai Yawe, nazali Nzambe na bino, oyo akangolaki bino na se ya misala makasi ya bato ya Ejipito.
Loba : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Oh Sidoni, natombokeli yo ! Nakomonisa nkembo na Ngai kati na yo ; boye, bakoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe, tango nakopesa yango etumbu mpe nakomonisa bosantu na Ngai kati na yango.
Okoya kobundisa libota na Ngai, Isalaele, ndenge mapata ezipaka mokili. Oh Gogi, na mikolo ekoya, nakosala ete obundisa mokili na Ngai mpo ete bikolo mosusu eyeba Ngai tango Ngai moko nakomonisa bosantu na Ngai na nzela na yo na miso na bango.