Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Kobima 14:16 - Mokanda na Bomoi

16 Kasi yo, tombola lingenda na yo, sembola loboko na yo likolo ya ebale monene mpe kabola mayi mpo ete bana ya Isalaele bakoka kokatisa ebale monene lokola na mabele ya kokawuka.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Kobima 14:16
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Elize alobaki na Geazi : — Lata mokaba na yo, kamata nzete na ngai na loboko na yo mpe kende. Soki okutani na moto na nzela, kopesa ye mbote te. Mpe soki moto apesi yo mbote, kozongisa te. Okotia nzete na ngai na elongi ya mwana mobali.


Yawe alobaki na Moyize : — Mpo na nini ozali koganga boye epai na Ngai ? Loba na bana ya Isalaele ete batambola.


Yawe alobaki na Moyize : — Sembola loboko na yo likolo ya ebale monene mpo ete mayi ezonga mpe ekweyela bato ya Ejipito, bashar na bango mpe batambolisi ya bampunda.


Yawe azongiselaki Moyize : — Leka liboso ya bato, kamata ndambo ya bakambi ya Isalaele. Zwa na loboko na yo, lingenda oyo obetaki na ebale Nili, mpe kende.


Ngai nakotelema kuna, liboso na yo, na likolo ya libanga oyo ezali na ngomba Orebi. Okobeta libanga yango, mpe yango ekobimisa mayi, bongo bato bakomela. Moyize asalaki bongo na miso ya bakambi ya Isalaele.


Kasi zwa lingenda oyo ezali na maboko na yo mpo ete osala bilembo ya kokamwa na nzela na yango.


Yawe atunaki ye : — Ozali na nini na loboko na yo ? Moyize azongisaki : — Nazali na lingenda.


Moyize azwaki mwasi na ye mpe bana na ye ya mibali, atiaki bango likolo ya ane mpe azongaki na Ejipito. Azwaki lisusu lingenda ya Nzambe na loboko na ye.


Yawe alobaki na Moyize : « Yebisa Aron : ‹ Kamata lingenda na yo mpe sembola yango na ngambo ya mayi nyonso ya Ejipito : etima mpe miluka, maziba mpe mabulu nyonso ya mayi ekobongwana makila. › Makila ekozala na bisika nyonso ya Ejipito kino na bimelelo ya mayi oyo esalema na nzete to na mabanga. »


« Tango Faraon akoloba na bino : ‹ Bosala bikamwa, › yo Moyize, okoloba na Aron : ‹ Kamata lingenda na yo, bwaka yango liboso ya Faraon, › mpe lingenda ekobongwana nyoka. »


Yawe, Mokonzi ya mampinga, akotombola fimbu mpo na kobeta Asiri ndenge abetaki Madiani na libanga ya Orebi. Mpe lisusu, akotombola nzete na Ye likolo ya ebale monene lokola na Ejipito.


Oh Yawe, otombokelaki nde bibale ? Osopelaki nde miluka kanda na Yo ? Osilikelaki nde ebale monene tango ozalaki kotambola likolo ya bampunda, likolo ya bashar na Yo ya lokumu ?


Moyize atombolaki loboko na ye mpe abetaki lingenda na ye na libanga mbala mibale. Mayi ebimaki ; bongo lisanga mobimba elongo na bibwele na bango bamelaki.


Yawe alobaki na Jozue : « Sembola na ngambo ya Ayi likonga oyo osimbi na loboko, pamba te nalingi kokaba yango na maboko na yo. » Boye Jozue asembolaki na ngambo ya engumba likonga oyo ezalaki na loboko na ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ