Na butu ya mokolo oyo Izaki akomaki na Beri-Sheba, Yawe abimelaki ye mpe alobaki na ye : « Nazali Nzambe ya Abrayami, tata na yo ; kobanga te, nazali elongo na yo. Mpo na Abrayami, mosali na Ngai, nakopambola yo mpe nakokomisa bakitani na yo ebele. »
Yaazieli alobaki : « Bino bavandi nyonso ya Yuda mpe ya Yelusalemi, mpe yo mokonzi Jozafati, boyoka ! Tala makambo oyo Yawe azali koloba na bino : ‹ Bobanga te mpe bolenga te liboso ya mampinga minene oyo, pamba te bitumba ezali ya bino te kasi ezali ya Nzambe.
Bokobunda bitumba ata moke te : bomibongisa kaka na bisika na bino, botelema mpe botala elonga oyo Yawe akopesa bino. Bino bato ya Yuda mpe ya Yelusalemi, bobanga te mpe bolenga te ! Lobi, bokende kokutana na bango ; mpe Yawe akozala elongo na bino ! › »
Na mokolo wana, Yawe abikisaki bana ya Isalaele liboso ya bato ya Ejipito mpe bana ya Isalaele bamonaki bibembe ya bato ya Ejipito etandami na libongo ya ebale monene.
Pamba te, tala liloba oyo Nkolo Yawe, Mosantu ya Isalaele, alobi : « Ekozala kati na kobongola mitema mpe kimia nde bokozwa lobiko na bino ; ekozala na nzela ya kimia mpe ya elikya nde bokozwa makasi na bino ; kasi bino, bolingi bongo te.
Loba na bato oyo bazali kobanga : « Bozala makasi, bobanga te, Nzambe na bino akoya, akoya kozongisa mabe na mabe, akoya na lifuti ya Nzambe. Ye moko akoya kobikisa bino. »
loba na ye : ‹ Kitisa motema, zala na kimia, kobanga te ; tika ete motema na yo etungisama te mpo na bakoni mibale oyo ezali kopela : kanda makasi ya Retsini, moto ya Siri, mpe ya mwana mobali ya Remalia !
Kasi nakotalisa bolamu na Ngai epai ya libota ya Yuda mpe nakobikisa bango. Ngai moko Yawe, Nzambe na bango, nde nakosala bongo ; ekozala na nguya ya tolotolo te, ya mopanga te, ya bitumba te, ya bampunda te to mpe ya bashar te.
Obimaka mpo na kokangola bato na Yo mpe mpo na kobikisa mopakolami na Yo. Obomaki mokambi ya mokili ya bato mabe, osambwisaki ye kobanda na moto kino na makolo.
Oh Yawe, otombokelaki nde bibale ? Osopelaki nde miluka kanda na Yo ? Osilikelaki nde ebale monene tango ozalaki kotambola likolo ya bampunda, likolo ya bashar na Yo ya lokumu ?
Kasi botombokela Yawe te mpe bobanga te bato oyo bazali na mokili yango, pamba te tokomela bango ; kobatelama na bango elongwe kati na bango. Nzokande na ngambo na biso, Yawe azali elongo na biso. Bobanga bango te. »
maloba oyo : « Oh Isalaele, boyoka, awa bobongami lelo mpo na kokende na bitumba mpo na kobundisa banguna na bino ; boyika mpiko ! Bobanga te ! Bolenga te ! Bozala na somo te liboso ya banguna na bino.