12 Toyebisaki yo te tango tozalaki na Ejipito : « Tika biso kimia, tika biso tosalela bato ya Ejipito ? » Pamba te elekaki malamu mpo na biso kosalela bato ya Ejipito na esika ya kokufa na esobe.
Tango batata na biso bazalaki na Ejipito, basosolaki eloko moko te kati na bikamwa na Yo ; babosanaki noki misala malamu na Yo, batombokaki pembeni ya ebale monene, ebale monene ya Barozo.
Tango Faraon atikaki bana ya Isalaele kokende, Nzambe amemaki bango te na nzela ya mboka ya Filisitia atako yango nde ezalaki mokuse, pamba te Nzambe amilobelaki : « Soki bakutani na bitumba, bakoyoka mawa na ndenge babimaki na Ejipito mpe bakoluka kozonga kuna. »
Balobaki : — Tika ete Yawe atala bino mpe asambisa bino ! Bokomisi biso eloko ya nkele liboso ya Faraon mpe ya basali na ye mpe botie mopanga na maboko na bango mpo ete baboma biso !
mpe agangaki na makasi nyonso : — Yesu, Mwana na Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo, ngai na Yo likambo nini ? Nabondeli Yo na Kombo ya Nzambe, kotungisa ngai te !