Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Kobima 14:10 - Mokanda na Bomoi

10 Lokola Faraon apusanaki, bana ya Isalaele batombolaki miso na bango mpe bamonaki ete bato ya Ejipito bazali kolanda bango na sima. Bana ya Isalaele babangaki makasi mpe bagangaki epai na Yawe.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Kobima 14:10
23 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tango bakonzi na ye ya basoda, oyo batambolisaka bashar, bamonaki Jozafati, bamilobelaki : « Ezali solo mokonzi ya Isalaele. » Bazingelaki ye mpo na kobundisa ye, kasi Jozafati agangaki makasi, mpe Yawe asungaki ye. Nzambe atindikaki basoda oyo batambolisaka bashar mosika na ye.


Omonaki minyoko ya bakoko na biso kati na Ejipito mpe oyokaki koganga na bango pembeni ya ebale monene ya Barozo.


Yawe amonaki pasi na bango, tango ayokaki koganga na bango.


Kati na pasi na bango, babelelaki Yawe, mpe abikisaki bango na mitungisi na bango.


Kati na pasi na bango, babelelaki Yawe, mpe abikisaki bango na mitungisi na bango.


Kati na pasi na bango, babelelaki Yawe mpe abimisaki bango na mitungisi na bango.


Bongo kati na pasi na bango, babelelaki Yawe, mpe akangolaki bango na mitungisi na bango.


kasi Yawe apesaka bato mabe mokongo mpo ete bakanisa bango lisusu te kati na mokili.


Boni, bato nyonso ya misala mabe bayebi eloko te ? Baliaka bato na ngai ndenge baliaka lipa mpe batikala nanu kobelela Nzambe te, bazali penza kososola eloko moko te ?


« Nalongolaki mokumba oyo ezalaki na mapeka na ye, mpe maboko na ye elongwaki na bowumbu ya kosimba bitunga. »


Tango Faraon atikaki bana ya Isalaele kokende, Nzambe amemaki bango te na nzela ya mboka ya Filisitia atako yango nde ezalaki mokuse, pamba te Nzambe amilobelaki : « Soki bakutani na bitumba, bakoyoka mawa na ndenge babimaki na Ejipito mpe bakoluka kozonga kuna. »


Boye Moyize abelelaki Yawe, mpe Yawe alakisaki ye eteni ya nzete. Moyize abwakaki yango na mayi, mpe mayi ekomaki elengi mpo na komela. Ezalaki kuna nde Yawe apesaki bango bikateli, mibeko mpe amekaki bango.


Yawe, kati na pasi na bango, balukaki Yo ; tango opesaki bango etumbu, bamikabaki na mabondeli makasi.


Boye, bapesaki sango na ndako ya Davidi : « Bato ya Siri basali boyokani elongo na bato ya Efrayimi. » Motema ya Akazi mpe mitema ya bato na ye nyonso eninganaki makasi ndenge kaka banzete ya zamba eninganaka na tango ya mopepe.


Yo oyo ovandaka na Libani, yo oyo otongaki zala na yo kati na bandako ya sedele, yeba ete okolela tango pasi ekokomela yo, pasi oyo ekokani na pasi ya mwasi oyo azali na pasi ya kobota !


Kanisaka malamu likambo oyo mpe kobosanaka te ndenge nini opelisaki kanda ya Yawe, Nzambe na yo, kati na esobe : banda mokolo oyo bobimaki wuta na Ejipito kino bokomaki na esika oyo, bozalaki kaka kotosa Yawe te.


Tango nabimisaki batata na bino na Ejipito, bakomaki kino na ebale monene ya Barozo, bato ya Ejipito balandaki bango na bashar mpe na basoda oyo batambolaka likolo ya bampunda kino na Ebale monene ya Motane.


Batata na bino bagangaki epai na Yawe mpo na kosenga lisungi, mpe Yawe atiaki molili kati na bino mpe bato ya Ejipito, azindisaki bango na mayi ya Ebale monene oyo ezipaki bango. Miso na bino moko emonaki makambo oyo nasalaki bato ya Ejipito. Mpe bowumelaki mibu ebele na esobe.


Kati na bolingo, kobanga ezalaka te ; kasi bolingo oyo ezali ya kokoka elongolaka bobangi, pamba te bobangi ebendaka etumbu. Mpe moto oyo abangaka azali nanu ya kokoka te kati na bolingo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ