Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Kobima 13:5 - Mokanda na Bomoi

5 Tango Yawe akokotisa yo na mokili ya bato ya Kanana, ya bato ya Iti, ya bato ya Amori, ya bato ya Evi mpe ya bato ya Yebusi, mokili oyo alakaki na batata na bino, na nzela ya ndayi, ete akopesa bino yango, mokili oyo ezali kobimisa miliki mpe mafuta ya nzoyi, okosala feti oyo na sanza oyo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Kobima 13:5
31 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Vanda kati na mokili oyo ; nakozala na yo elongo mpe nakopambola yo, pamba te nakopesa mabele oyo nyonso epai na yo mpe epai ya bana na yo ; nakokokisa ndayi oyo nalapaki epai ya Abrayami, tata na yo.


Jozefi alobaki na bandeko na ye ya mibali : « Nakomi pene ya kokufa. Kasi ya solo, Nzambe akosalisa bino mpe akobimisa bino na mokili oyo, mpo na kokotisa bino na mokili oyo alakaki epai ya Abrayami, ya Izaki mpe ya Jakobi tango alapaki ndayi. »


Bokotosa malako oyo lokola mobeko ya libela na libela mpo na bino mpe mpo na bakitani na bino.


Bokobatela mobu na mobu mibeko oyo na eleko na yango.


Tango Yawe akokotisa bino na mokili ya Kanana mpe akopesa bino yango ndenge alakaki yango, na nzela ya ndayi, epai ya bakoko na bino mpe epai na bino,


Mpe nalobi : « Nakolongola bino na minyoko ya Ejipito mpo na komema bino na mokili ya bato ya Kanana, ya Iti, ya Amori, ya Perizi, ya Evi mpe ya Yebusi, na mokili oyo ezali kobimisa miliki mpe mafuta ya nzoyi. »


Yango wana nakiti mpo na kokangola bango na maboko ya bato ya Ejipito mpe kobimisa bango na mokili oyo, mpo na kokotisa bango na mokili ya kitoko mpe ya monene, mokili oyo ezali kobimisa miliki mpe mafuta ya nzoyi. Ezali mokili oyo evandaka bato ya Kanana, ya Iti, ya Amori, ya Perizi, ya Evi mpe ya Yebusi.


Kanisa Abrayami, Izaki mpe Isalaele, basali na Yo, oyo Yo moko olapelaki ndayi mpe olobaki : « Nakokomisa bakitani na yo ebele lokola minzoto na likolo, nakopesa bango mokili oyo nyonso ndenge kaka nalobaki na bango ; mpe yango ekozala libula na bango mpo na libela. »


Yawe alobaki na Moyize : — Kende, longwa na esika oyo elongo na bato oyo obimisaki na Ejipito ; kende na mokili oyo nalakaki na ndayi epai ya Abrayami, Izaki mpe Jakobi ete nakopesa yango epai na bana na yo.


Botosa makambo oyo nazali kotinda bino lelo. Nakobengana liboso na bino : bato ya Amori, ya Kanana, ya Iti, ya Perizi, ya Evi mpe ya Yebusi.


Nasalaki boyokani na Ngai elongo na bango mpo na kopesa bango mokili ya Kanana epai wapi bazalaki kowumela lokola bapaya.


Mpe nakokotisa bino na mokili oyo nalapaki ndayi, na kotombola loboko, ete nakopesa yango epai ya Abrayami, epai ya Izaki mpe epai ya Jakobi ; nakopesa bino yango mpo ete ekoma ya bino. Nazali Yawe. »


Bongo nakokokisa ndayi oyo nalapaki epai ya bakoko na bino ete nakopesa bango mokili oyo ebimisaka miliki mpe mafuta ya nzoyi, mokili oyo bozali na yango lelo. » Nazongisaki : — Solo, Yawe ; amen !


Opesaki bango mokili oyo, na nzela ya ndayi, olakaki kopesa na batata na bango, mokili oyo ebimisaka miliki mpe mafuta ya nzoyi.


Na mokolo wana, nalapaki ndayi, na kotombola loboko, ete nakobimisa bango na Ejipito mpe nakomema bango na mokili oyo nalukelaki bango, mokili oyo ebimisaka miliki mpe mafuta ya nzoyi, mokili oyo eleki mikili nyonso na kitoko.


Boye nayebisaki bino : ‹ Bino nde bato bokozwa mokili na bango, mokili oyo ebimisaka miliki mpe mafuta ya nzoyi ; napesi bino yango lokola libula. › Nazali Yawe, Nzambe na bino, oyo alongolaki bino kati na bikolo mpe atiaki bino pembeni.


Boni, ngai moto namemaki mokumba ya bato oyo nyonso to nabotaki bango ? Mpo na nini oloba na ngai ete namema bango na maboko lokola bana mike, na mokili oyo olakaki na ndayi epai ya bakoko na bango ?


Bapesaki sango oyo epai ya Moyize : « Tokotaki kino na mokili epai wapi otindaki biso. Solo, ezali penza mokili oyo ezali kobimisa miliki mpe mafuta ya nzoyi ; tala kutu bambuma ya mokili yango.


« Yawe azangaki penza makoki ya kokotisa bato oyo na mokili oyo alakaki, na nzela ya ndayi, ete akopesa bango yango, yango wana abomaki bango kati na esobe. »


bokokota te na mokili oyo nalakaki na nzela ya ndayi, na kotombola loboko, ete nakokomisa yango mokili na bino, longola kaka Kalebi, mwana mobali ya Yefune, mpe Jozue, mwana mobali ya Nuni.


« Lokola batosaki Ngai te na motema mobimba, moko te kati na bato oyo bazali na mibu tuku mibale mpe komata, ba-oyo babimaki na Ejipito, akomona mokili oyo nalakaki, na nzela ya ndayi, epai ya Abrayami, Izaki mpe Jakobi


Yawe, Nzambe na bino, akolimwisa na liboso na bino bikolo oyo bozali kokende kobundisa mpe kobotola. Kasi tango bokobengana bango mpe bokovanda na bamboka na bango,


Tango Yawe, Nzambe na bino, akobebisa bikolo oyo Ye akopesa bino mokili na bango, tango bokobengana bango mpe bokovanda na bamboka mpe na bandako na bango ;


Tango bokokota na mokili oyo Yawe, Nzambe na bino, akopesa bino lokola libula, tango bokozwa yango mpe bokovanda kuna,


Tango Yawe, Nzambe na yo, akokotisa yo na mokili oyo ozali kokende mpo na kozwa yango lokola libula mpe tango akobengana liboso na yo bikolo ebele—bato ya Iti, ya Girigazi, ya Amori, ya Kanana, ya Perizi, ya Evi mpe ya Yebusi, bikolo sambo oyo eleki yo na motango ya bato mpe na makasi—


Boye bokatisaki Yordani mpe bokomaki na engumba Jeriko. Bavandi ya Jeriko babundisaki bino ndenge kaka bato ya Amori, ya Perizi, ya Kanana, ya Iti, ya Girigazi, ya Evi mpe ya Yebusi, basalaki ; kasi nakabaki bango mpe na maboko na bino.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ