Kobima 13:3 - Mokanda na Bomoi3 Moyize alobaki na bato : « Bokanisa mokolo oyo bobimaki na Ejipito, mokolo oyo bobimaki na bowumbu, pamba te Yawe abimisaki bino na loboko na Ye ya nguya. Bokolia eloko moko te oyo ezali na levire. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Mosakoli to moto wana oyo amonaka makambo, esengeli baboma ye, pamba te azali koteya mpo ete botombokela Yawe, Nzambe na bino, oyo abimisaki bino na Ejipito mpe asikolaki bino na mokili ya bowumbu. Moto wana azalaki nde na posa ya kopengwisa bino na nzela oyo Yawe, Nzambe na bino, atindaki bino kolanda. Boye, bosengeli kolongola mabe kati na bino.
Boni, ezali na nzambe oyo ameka kobimisa mpo na ye ekolo moko wuta na ekolo mosusu na nzela ya komekama, ya bilembo, ya bikamwa, ya bitumba, ya maboko na ye ya nguya, mpe na kosembola loboko to na nzela ya misala minene ya somo lokola makambo nyonso oyo Yawe, Nzambe na bino, asala mpo na bino kati na Ejipito na miso na bino ?