Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Kobima 13:21 - Mokanda na Bomoi

21 Yawe atambolaki liboso na bango, na moyi lokola likonzi ya lipata mpo na kolakisa bango nzela, mpe na butu lokola likonzi ya moto mpo na kongengisa bango, mpo ete batambola butu mpe moyi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Kobima 13:21
21 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Otambolisaki bango, na moyi, na nzela ya likonzi ya mapata, mpe, na butu, na nzela ya likonzi ya moto mpo na kongengisa nzela oyo basengelaki kotambola.


Mpo na mawa monene na Yo, otikalaki kosundola bango te na esobe : likonzi ya mapata etikaki bango te, ekobaki kotambolisa bango na nzela na bango, na moyi ; mpe na butu, likonzi ya moto etikaki te kongengisa nzela oyo basengelaki kolanda.


Atandaki lipata mpo na kobatela bango, mpe moto mpo na kopesa pole na butu.


Nzambe apesaka libota epai ya bato oyo bavandaka bango moko, abimisaka bakangami wuta na minyololo ; kasi batomboki batikalaka na mabele ekawuka.


Opasolaki nzela kati na ebale monene, balabala na Yo kati na mayi monene, mpe moto moko te amonaki bilembo ya matambe na Yo.


Na moyi, azalaki kotambolisa bango na nzela ya lipata ; mpe na butu, na nzela ya pole ya moto.


Azalaki koloba na bango kati na likonzi ya lipata. Babatelaki malako na Ye mpe mibeko oyo apesaki bango.


Faraon alobaki na bango : — Soki nakotika bino kokende elongo na bana na bino, wana tika ete Yawe azala elongo na bino ! Nzokande emonani solo ete bozali na makanisi mabe.


Wana Aron azalaki koloba na lisanga nyonso ya bana ya Isalaele, babalolaki miso na bango na ngambo ya esobe, mpe bamonaki nkembo na Yawe kobima na mapata.


Tango bato bamonaki ete Moyize azali kowumela mpo na kokita na ngomba, basanganaki zingazinga ya Aron mpe balobaki : — Yaka mpe salela biso nzambe oyo akotambola liboso na biso. Pamba te Moyize, moto oyo abimisaki biso na Ejipito, toyebi te makambo nini ekomeli ye.


Nani oyo abimi na esobe lokola molinga oyo ezali komata, azali kobimisa solo ya malasi ya mire mpe ya ansa, oyo basali na biloko ya mike-mike ya solo kitoko ya moto ya mombongo ?


Na moyi, lipata na Yawe ezalaki likolo na bango, na tango bazalaki kolongola molako.


Mpe bakoyebisa na bavandi ya mokili oyo makambo yango. Oh Yawe, basila koyoka wuta kala ete ozalaka elongo na bato oyo, ete Yo, oh Yawe, omimonisaki epai na bango miso na miso, ete lipata na Yo etelema likolo na bango, ete otambolaka liboso na bango kati na likonzi ya lipata, na moyi, mpe kati na likonzi ya moto, na butu.


oyo azalaki kotambola liboso na bino na nzela mpo na kolukela bino esika ya kotonga molako. Na butu, azalaki lokola likonzi ya moto ; mpe na moyi, azalaki lokola likonzi ya lipata ; mpo na kolakisa bino nzela oyo bosengelaki kotambola.


Ye moko Yawe akotambola liboso na yo mpe akozala elongo na yo. Kobanga te mpe yika mpiko. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ