Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Kobima 13:17 - Mokanda na Bomoi

17 Tango Faraon atikaki bana ya Isalaele kokende, Nzambe amemaki bango te na nzela ya mboka ya Filisitia atako yango nde ezalaki mokuse, pamba te Nzambe amilobelaki : « Soki bakutani na bitumba, bakoyoka mawa na ndenge babimaki na Ejipito mpe bakoluka kozonga kuna. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Kobima 13:17
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

mpe soki, wuta na mokili ya bowumbu, basosoli, babongoli mitema, babondeli Yo kati na mokili ya bato oyo bamemaki bango na bowumbu mpe balobi : ‹ Tosalaki masumu, tosalaki bambeba, tosalaki makambo mabe ; ›


Baboyaki koyoka mpe kokanisa bikamwa oyo osalaki mpo na bolamu na bango. Bakomaki mito makasi mpe, na botomboki na bango, bamiponelaki mokonzi mpo na kozonga na bowumbu na bango. Kasi lokola ozali Nzambe oyo alimbisaka bato, Nzambe oyo atalisaka ngolu mpe ayokaka mawa ; lokola osilikaka noki te mpe otonda na boboto, otikalaki kosundola bango ata moke te,


Lokola Faraon apusanaki, bana ya Isalaele batombolaki miso na bango mpe bamonaki ete bato ya Ejipito bazali kolanda bango na sima. Bana ya Isalaele babangaki makasi mpe bagangaki epai na Yawe.


kasi Polo asepelaki te ete bamema ye elongo na bango, pamba te akabwanaki na bango na Pafili mpe akobaki lisusu te elongo na bango kati na mosala.


Kasi bakoko na biso baboyaki kotosa ye ; batombokelaki ye mpe bazwaki likanisi ya kozonga na Ejipito.


Nzokande mokonzi yango asengeli te kozala na bampunda ebele mpo na ye moko mpe kozongisa bato na Ejipito mpo na kobakisa motango ya bampunda, pamba te Yawe alobaki na bino : « Botikala kozonga lisusu te na nzela oyo. »


Bakonzi ya basoda bakoloba lisusu : « Ezali na moto oyo azali kobanga to alembi nzoto ? Tika ete azonga na ndako mpo ete alembisa te baninga na ye na bitumba. »


Yawe Nzambe akozongisa bino na bamasuwa na Ejipito, na mokili oyo nalobaki na bino ete bokomona yango lisusu te. Mpe kuna, bokomiteka bino moko epai ya banguna na bino lokola bawumbu ya mibali mpe ya basi, kasi moto moko te akosomba bino.


Mpo na kondima, Moyize abangaki te kanda ya mokonzi mpo na kobima longwa na Ejipito, mpe atikalaki ngwi na mokano na ye lokola nde azali komona Nzambe oyo amonanaka te.


Yango wana, loba na bato oyo : ‹ Tika ete moto nyonso oyo azali kolenga na kobanga azala mosika ya ngomba Galadi mpe azonga epai na ye. › » Boye, bato nkoto tuku mibale na mibale bazongaki epai na bango mpe nkoto zomi batikalaki.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ