Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Kobima 13:14 - Mokanda na Bomoi

14 Mikolo ekoya, tango bana na bino ya mibali bakotuna bino : ‹ Molulu oyo elakisi nini ? › Bokoloba na bango : ‹ Ezali na nguya na Ye nde Yawe abimisaki biso na Ejipito, mokili ya bowumbu.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Kobima 13:14
29 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Boye bosembo na ngai ekomonana sima na mikolo tango okoya kotala lifuti na ngai. Soki omoni epai na ngai ntaba ezanga madodo to ezanga banzela ya pembe to mwana meme ezanga madodo to ezanga banzela ya mwindo, wana ekozala lokola nayibi yango.


Bokanisa bikamwa, makambo minene oyo asalaki, bitumbu oyo apesaki,


Bazali basali na Yo mpe bato na Yo, oyo osilaki kokangola na nguya monene na Yo mpe na makasi ya loboko na Yo !


Abimisaki Isalaele wuta na Ejipito ; pamba te bolingo na Ye ewumelaka seko na seko !


Bikeke nyonso ekotombola kitoko ya misala na Yo mpe ekopanza sango ya misala na Yo ya minene.


Tokobombela yango bakitani na bango te, kasi tokoloba na bikeke oyo ekoya na sima nkembo ya masanzoli ya Yawe, nguya na Ye mpe bikamwa oyo asalaki.


mpe ete oyebisa bana na yo mpe bakoko na yo makambo oyo nasalaki na Ejipito mpe bilembo ya kokamwa oyo nasalaki kati na bango. Bongo bokoyeba ete Ngai nazali Yawe. »


Na suka ya mobu oyo ya nkama minei na tuku misato, mampinga nyonso ya Yawe batikaki Ejipito.


Moyize alobaki na bato : « Bokanisa mokolo oyo bobimaki na Ejipito, mokolo oyo bobimaki na bowumbu, pamba te Yawe abimisaki bino na loboko na Ye ya nguya. Bokolia eloko moko te oyo ezali na levire.


Na mokolo wana, bokoyebisa na bana na bino ya mibali : ‹ Nazali kosala molulu oyo mpo na kokanisa makambo oyo Yawe asalelaki ngai tango abimisaki ngai na Ejipito. ›


Feti oyo bokosala ekozala lokola elembo na loboko na bino mpe ekaniseli na elongi na bino mpo ete mibeko ya Yawe ezala na bibebu na bino, pamba te Ye nde abimisaki bino na Ejipito na loboko na Ye ya nguya.


« Nazali Yawe, Nzambe na yo, oyo abimisaki yo wuta na mokili ya Ejipito epai wapi ozalaki na bowumbu.


Yawe alobaki na Moyize : — Sik’oyo, okomona makambo oyo nakosala Faraon : na loboko na Ngai ya nguya, Faraon akotika bato na Ngai kokende mpe akobimisa bango na mokili na ye.


Yango wana, loba na bana ya Isalaele : « Nazali Yawe ! Nakokangola bino na misala makasi oyo bato ya Ejipito bapesi bino. Nakokangola bino na se ya bowumbu na bango na loboko na nguya mpe na bitumbu ya makasi.


Nakozwa bino lokola bato na Ngai moko, bongo nakozala Nzambe na bino. Boye bokoyeba ete Ngai Yawe, nazali Nzambe na bino, oyo akangolaki bino na se ya misala makasi ya bato ya Ejipito.


« Tala liloba oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi : Nasalaki boyokani elongo na bakoko na bino tango nabimisaki bango na Ejipito, mokili ya bowumbu ; nalobaki :


Sik’oyo, Nkolo, Nzambe na biso, Yo oyo obimisa bato na Yo na Ejipito na nzela ya loboko na Yo ya nguya mpe Kombo na Yo ekenda sango kino na mokolo ya lelo, tosalaki masumu, tosalaki mabe !


Nzambe ya bato ya Isalaele aponaki bakoko na biso, akomisaki bango ekolo monene na tango oyo bavandaki kati na mokili ya Ejipito lokola bapaya, mpe abimisaki bango na mokili yango na nguya monene.


Kanisa ete bozalaki bawumbu na Ejipito, mpe Yawe, Nzambe na bino, abimisaki bino kuna na loboko na Ye ya nguya mpe na loboko na Ye ya kosembolama. Yango wana, Yawe, Nzambe na yo, apesi yo mitindo ete otosa mokolo ya Saba.


‹ Nazali Yawe, Nzambe na yo, oyo abimisaki yo wuta na mokili ya Ejipito epai wapi ozalaki na bowumbu.


keba ete obosana Yawe te oyo abimisaki yo na Ejipito, mokili ya bowumbu.


Te, ezali bongo te ! Tosalaki bongo mpo na kobanga ete lobi bakitani na bino baloba na bakitani na biso : « Eloko nini ezali kosangisa bino na Yawe, Nzambe ya Isalaele ?


Pamba te Yawe azali Nzambe na biso ; ezali Ye Yawe nde abimisaki biso mpe batata na biso na Ejipito, na mokili wana ya bowumbu, mpe asalaki na miso na biso bilembo minene ya kokamwa. Azalaki kobatela biso na banzela nyonso oyo tozalaki kotambola mpe kati na bikolo nyonso epai wapi tozalaki koleka.


mpo ete ezala lokola elembo kati na bino. Sima na tango, soki bana na bino batuni bino : ‹ Mabanga oyo elakisi nini ? ›


Basundolaki Yawe, Nzambe ya batata na bango, oyo abimisaki bango na mokili ya Ejipito, mpe bakomaki kosambela mpe kosalela banzambe ya ndenge na ndenge ya bato oyo bazalaki zingazinga na bango ; bakomaki kogumbama liboso ya banzambe yango. Mpo na yango, bapelisaki kanda ya Yawe,


Yawe atindelaki bango mosakoli oyo alobaki na bango : « Tala makambo oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi : ‹ Ngai nde nabimisaki bino na Ejipito, ndako ya bowumbu.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ