Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Kobima 12:7 - Mokanda na Bomoi

7 Bakozwa makila na yango mpe bakopakola yango na libaya ya likolo mpe na mabaya mibale ya mipanzi oyo esimbaka ekuke ya bandako epai wapi bakolia nyama yango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Kobima 12:7
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Salomo asalaki na mabaya ya banzete ya olive, na ekotelo ya Esika-Oyo-Eleki-Bule, ekuke moko ya bizipelo mibale : monene ya kadre ya mabaya ya ekuke ezwaki ndambo moko kati na bandambo mitano ya mokuse ya mir.


Na bandako epai wapi bokozala, makila ekozala elembo mpo na bino ; bongo tango Ngai nakomona makila yango, nakoleka bino. Boye etumbu moko te ya kufa ekokweya kati na bino tango nakopesa etumbu na mokili ya Ejipito.


Yawe alobaki na ye : « Tambola kati na Yelusalemi mpe tia bilembo na bilongi ya bato oyo bazali komona pasi na mitema mpe bazali kolela likolo ya makambo nyonso ya nkele oyo ezali kosalema kati na engumba oyo. »


Kati na Klisto, tozwi lisiko na nzela ya makila na Ye, mpe bolimbisi ya masumu, kolanda bomengo ya ngolu ya Nzambe


Bokoma yango na makonzi ya bandako na bino mpe na bikuke na bino


Pamba te, na nzela ya likabo moko kaka, akomisaki bato ya kokoka mpo na libela, ba-oyo apetolaki na masumu.


ekozala boni mpo na moto oyo atioli Mwana na Nzambe, amoni pamba makila ya boyokani, oyo epetolaki ye, mpe afingi Molimo ya ngolu ?


Mpo na kondima, asepelaki feti ya Pasika mpe apesaki mitindo ete bapakola makila na bikuke mpo ete anjelu mobomi aboma te bana mibali ya liboso ya bana ya Isalaele.


Pamba te, kolanda Mibeko, nyonso epetolamaka na makila ; mpe soki makila etangi te, bolimbisi masumu ezali te.


Kolanda mabongisi na Ye, Nzambe Tata apona bino wuta kala, abulisa bino na nzela ya Molimo na Ye mpo ete botosa Yesu-Klisto mpe bokoma peto na nzela ya makila na Ye, oyo asopaki. Tika ete ngolu mpe kimia epesamela bino na bofuluki !


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ