Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Kobima 12:6 - Mokanda na Bomoi

6 Bokobatela yango kino na mokolo ya zomi na minei ya sanza yango. Na mokolo yango, bato nyonso ya lisanga ya Isalaele bakokata yango kingo na pokwa.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Kobima 12:6
34 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Joziasi asepelaki feti ya Pasika mpo na lokumu ya Yawe kati na Yelusalemi ; mpe na mokolo ya zomi na minei ya sanza ya liboso, bakataki kingo ya mpate mpo na mbeka ya Pasika.


Na mokolo ya zomi na minei ya sanza ya liboso, bana ya Isalaele oyo bawutaki na bowumbu basepelaki feti ya Pasika.


Mokolo yango ekozala mokolo ya ekaniseli mpo na bino. Bileko na bileko, bokobanda kosala feti na mokolo yango mpo na lokumu ya Yawe ; yango ekozala mpo na bino mobeko ya libela na libela mpo na bakitani oyo bakoya sima na bino.


Bokosala feti ya Mapa ezanga levire, pamba te ezalaki na mokolo yango nde nabimisaki mampinga na bino na Ejipito. Bokosala feti na mokolo yango lokola mobeko ya libela na libela mpo na bakitani oyo bakoya sima na bino.


Na sanza ya liboso, bokolia mapa ezanga levire kobanda na pokwa ya mokolo ya zomi na minei kino na pokwa ya mokolo ya tuku mibale na moko.


Lisanga mobimba ya Isalaele ekosala feti ya Pasika.


Lisanga nyonso ya bana ya Isalaele balongwaki na Elimi mpe bakomaki na esobe ya Tsini, oyo ezali kati ya Elimi mpe ngomba Sinai, na mokolo ya zomi na mitano, na sanza ya mibale sima na kobima na bango na Ejipito.


— Nayoki koyimayima ya bana ya Isalaele. Yebisa bango : « Na pokwa ya lelo, bokolia misuni ; bongo na tongo, bokotonda mana. Boye, bokoyeba solo ete nazali Yawe, Nzambe na bino. »


Sanza misato sima na bana ya Isalaele kobima na Ejipito, kaka na mokolo yango, bana ya Isalaele bakomaki na esobe ya Sinai.


Okotumba mwana meme moko na tongo, mpe mosusu, na pokwa.


Mpo na mwana meme ya mibale, okobonza yango na pokwa elongo na lolenge moko ya makabo oyo obonzaki na tongo : farine, mafuta mpe mbeka ya masanga ya vino ; okobonza yango lokola likabo bazikisa na moto mpo na Yawe, oyo solo kitoko na yango esepelisaka Yawe.


Biso nyonso, tozalaki koyengayenga lokola bana meme, moko na moko azalaki kolanda nzela na ye ; bongo Yawe akweyisaki masumu na biso nyonso na nzoto na ye.


Na mokolo ya zomi na minei ya sanza ya liboso, bokosala feti ya Pasika oyo ekosala mikolo sambo. Na mikolo wana, bokolia mapa ezanga levire.


Pasika ya Yawe ekobanda na pokwa ya mokolo ya zomi na minei ya sanza ya liboso.


Mokolo ya zomi na minei ya sanza ya liboso ekozala Pasika mpo na lokumu ya Yawe.


Na mokolo ya liboso, bokozala na mayangani ya bule ; bokosala mosala moko te oyo bosalaka mokolo na mokolo.


Basengeli kosepela yango na pokwa ya mokolo ya zomi na minei ya sanza ya mibale ; bakolia mwana meme elongo na mapa ezanga levire mpe matiti ya bololo.


Bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe bakambi ya bato bandimisaki ebele ya bato ete basenga na makasi kobima ya Barabasi longwa na boloko, mpe komona ndenge bakoboma Yesu.


Bato nyonso bazongisaki : — Tika ete makila na ye etangama na mito na biso mpe ya bana na biso !


Tango tongo etanaki, bakonzi ya Banganga-Nzambe, bakambi ya bato, balakisi ya Mobeko mpe bato nyonso ya Likita-Monene ya Bayuda basanganaki mpo na kokata likambo. Bakangaki Yesu na basinga, bamemaki Ye mpe bakabaki Ye na maboko ya Pilato.


Bakonzi ya Banganga-Nzambe batindikaki ebele ya bato mpo ete basenga na Pilato ete abimisela bango Barabasi longwa na boloko.


Babakaki Ye na ekulusu na ngonga ya libwa ya tongo.


Ebele ya bato bayaki mpe basengaki na Pilato ete asalela bango makambo oyo amesana kosalela bango mbala na mbala.


Bato nyonso oyo bazalaki kati na mayangani batelemaki mpe bamemaki Yesu liboso ya Pilato ;


Bato nyonso bagangaki : — Boma moto oyo ! Bimisela biso Barabasi !


akabamaki na maboko na bino kolanda mokano oyo Nzambe asila kozwa na mabongisi na Ye wuta kala. Bongo bino, na lisungi ya bato mabe, bobomaki Ye na kobaka Ye na ekulusu.


Bowanganaki Ye oyo azali Mosantu mpe Sembo. Boye, bosengaki ete Pilato atikela bino mobomi na esika ya Yesu.


Pamba te, Erode mpe Ponse Pilato basanganaki penza kati na engumba oyo, elongo na bato ya bikolo mosusu mpe bana ya Isalaele, mpo na kosalela Yesu likita, Mosali na Yo, Mosantu, oyo obulisa.


Na pokwa ya mokolo ya zomi na minei ya sanza wana, bana ya Isalaele basalaki feti ya Pasika, wana bazalaki nanu na molako ya Giligali, na etando ya Jeriko.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ