Kasi soki bato ya ndako bazali ebele te mpo na kolia mwana meme ya mobimba, bakolia yango elongo na bato ya ndako oyo ezali pene na ndako na bango kolanda motango ya bato. Bakopona mwana meme kolanda oyo moko na moko akoki kolia.
Soki azali kobonza ngombe lokola mbeka ya kotumba, amema nde oyo ezangi mbeba. Bongo akobonza yango na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani mpo ete Yawe andima yango.
« Tika ete alakelama mabe, ye oyo azali na ebwele ya kitoko kati na etonga na ye, mpe alapi ndayi ete akobonza yango epai na Yawe, kasi abonzi ebwele oyo ebela ! Pamba te Ngai, nazali Mokonzi Monene, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga, mpe bikolo nyonso esengeli kobanga Kombo na Ngai.
Okobonza te epai na Yawe, Nzambe na yo, ngombe to meme oyo ezali na mbeba to oyo ezali mabe, pamba te yango ezali likambo ya nkele liboso ya Yawe, Nzambe na yo.
Boye, Yesu nde azali Mokonzi ya Banganga-Nzambe, oyo abongi mpo na biso : azali Bule, asala ata mabe moko te, azali peto, akabwana na bato ya masumu, mpe Nzambe atombola Ye penza likolo koleka Likolo,