44 Kasi mowumbu nyonso oyo bakosomba, basengeli liboso kokata ye ngenga, sima nde akoki kolia Pasika.
Kaka na mokolo wana, Abrayami azwaki mwana na ye ya mobali, Isimaeli, mpe bawumbu nyonso, ezala ba-oyo babotamaki na ndako na ye to ba-oyo asombaki na mosolo, akatisaki bango nyonso ngenga ndenge kaka Nzambe alobaki na ye.
Kasi soki Nganga-Nzambe asombi mowumbu na mbongo na ye to soki mowumbu abotami na ndako na ye, mowumbu wana akolia makabo ya bule.