Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Kobima 12:31 - Mokanda na Bomoi

31 Kaka na butu wana, Faraon abengisaki Moyize mpe Aron, alobaki na bango : « Botelema, bobima kati na bato na ngai, bino mpe bana ya Isalaele. Bokende kogumbamela Yawe ndenge bosengaki.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Kobima 12:31
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Ejipito esepelaki komona bango kobima, pamba te somo ya Isalaele ekangaki bango.


Moyize azongisaki : — Ndenge kaka olobi, nakotikala koya lisusu liboso na yo te !


Moyize azongisaki : — Tokokende elongo na bilenge na biso, bampaka na biso, bana na biso ya mibali mpe ya basi, bameme na biso, bantaba na biso mpe bangombe na biso ; pamba te tokosala feti mpo na lokumu ya Yawe.


Yawe alobaki na Moyize : « Nakoyeisa lisusu etumbu moko na bomoi ya Faraon mpe ya Ejipito. Sima na yango, Faraon akotika bino ete bokende ; kutu, akobengana bino libela.


Boye, bakalaka na yo nyonso oyo bazali zingazinga na yo bakoya epai na ngai, bakofukama liboso na ngai mpe bakoloba : ‹ Kende, yo mpe bato nyonso oyo bazali kotambola sima na yo. › Mpe sima na yango, nakobima. » Bongo Moyize abimaki na ndako ya Faraon na kanda makasi.


Basalaki na farine oyo bamemaki wuta na Ejipito bagato ezanga levire, pamba te tango babenganaki bango, potopoto emivimbelaki te mpe bazangaki tango ya kobongisa biloko ya kolia mpo na bango moko.


Yawe alobaki na Moyize : — Sik’oyo, okomona makambo oyo nakosala Faraon : na loboko na Ngai ya nguya, Faraon akotika bato na Ngai kokende mpe akobimisa bango na mokili na ye.


Moyize azongisaki : — Ndenge nazali kobima boye na ndako na yo, nakobondela Yawe ; bongo lobi, banzinzi oyo eswaka ekolongwa epai ya Faraon, epai ya bakalaka na ye mpe epai ya bato na ye. Kasi tika ete Faraon akoba te kotiola Yawe na koboya kotika bato kokende kobonzela Yawe mbeka.


Sima, Moyize mpe Aron batikaki Faraon. Bongo Moyize agangaki epai na Yawe na tina na magorodo oyo atindelaki Faraon.


Tina nini kozala moto makasi lokola Faraon mpe bato ya Ejipito ? Bokanisa ete sima na Nzambe konyokola bango, batikaki bana ya Isalaele kokende na nzela na bango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ