3 Boloba boye na lisanga mobimba ya Isalaele : Na mokolo ya zomi na sanza oyo, libota moko na moko to ndako moko na moko esengeli kozala na mwana meme to na mwana ntaba.
Joziasi azwaki kati na bibwele na ye moko mokonzi bana meme mpe bana ntaba nkoto tuku misato mpe bangombe nkoto misato, mpo na bato ya Isalaele, nkoto tuku misato oyo bazalaki wana mpo ete bakoka kobonza yango lokola mbeka ya Pasika.
Kasi soki bato ya ndako bazali ebele te mpo na kolia mwana meme ya mobimba, bakolia yango elongo na bato ya ndako oyo ezali pene na ndako na bango kolanda motango ya bato. Bakopona mwana meme kolanda oyo moko na moko akoki kolia.
Yango wana, loba na bana ya Isalaele : « Nazali Yawe ! Nakokangola bino na misala makasi oyo bato ya Ejipito bapesi bino. Nakokangola bino na se ya bowumbu na bango na loboko na nguya mpe na bitumbu ya makasi.
Na mokolo ya zomi ya sanza ya liboso, sima na biso kokokisa mibu tuku mibale na mitano wuta tango tokendeki na bowumbu, na ebandeli ya mobu, ezalaki mobu ya zomi na minei sima na kobebisama ya engumba Yelusalemi, kaka na mokolo wana, loboko ya Yawe ezalaki likolo na ngai, mpe amemaki ngai kuna.
« Yebisa bana ya Isalaele : ‹ Soki moko kati na bino alingi kobonza nyama lokola mbeka epai na Yawe, asengeli komema nyama oyo azwi kati na bangombe, bantaba mpe bameme.
Bolongola kati na bino kisi nyonso ya kala ya mapa mpo ete bokoma peto lokola potopoto ya sika ya mapa, ndenge bozali penza. Pamba te Klisto, Mpate na biso ya Pasika, asilaki kopesama lokola mbeka.
Bavandi nyonso ya mokili bakogumbamela nyama yango, ba-oyo nyonso bakombo na bango ekomama te, wuta na ebandeli ya mokili, kati na buku ya bomoi ya Mpate oyo babomaki.