Mokolo yango ekozala mokolo ya ekaniseli mpo na bino. Bileko na bileko, bokobanda kosala feti na mokolo yango mpo na lokumu ya Yawe ; yango ekozala mpo na bino mobeko ya libela na libela mpo na bakitani oyo bakoya sima na bino.
Bokosala feti ya Mapa ezanga levire, pamba te ezalaki na mokolo yango nde nabimisaki mampinga na bino na Ejipito. Bokosala feti na mokolo yango lokola mobeko ya libela na libela mpo na bakitani oyo bakoya sima na bino.
Tango Yawe akokotisa yo na mokili ya bato ya Kanana, ya bato ya Iti, ya bato ya Amori, ya bato ya Evi mpe ya bato ya Yebusi, mokili oyo alakaki na batata na bino, na nzela ya ndayi, ete akopesa bino yango, mokili oyo ezali kobimisa miliki mpe mafuta ya nzoyi, okosala feti oyo na sanza oyo.